Bansango ya ngambo ya Moniele ya Orient – 5 Febwali 2026
Nà mibu tuku mwambé, to 80 ans, Mario Zenari asilisi etindà to mosala mwa ye na Syrie. Ntóma ya Pàpa na Damas kobanda 2008, azalaki momonisi ya Pàpa na moko ya ba eleko ya molili ya mboka. Ntango etumba ebandaki na 2011, aponaki kotikala. Na bowumeli ya mibu zomi na nsambo, azalaki kosala mosala ya diplomatie mpe ya kosalisa bato, na kati ya esika eye yemei atangaki yango “lifelo ontei ya mabele”, mbala mingi atikalaki kaka ye moko, moyokanisi kati na bikolo binso biye bikataki boyokani bwa bango nà ekolo na Damas.
Ut’o bokweyisami ya bokonzi ya Assad na sanza ya Desembe ua mobù 2024, Bakristu ya Syrie bazali kati na bomoi ya kotatabana kati na elikya mpe mawa. Bato batomboli mingongo bazali koloba, mingi mpenza: Sàngó Jihad na monastele ya Mar Moussa, Mgr Hanna Jalouf na Alep, mpe Mgr Jacques Mourad na Homs. Banso bazali kokanisa sé likambo moko: Bakristu bazali bana-mboka ya mibale tè. Bazali eteni ya lisoló ya Syrie mpe bazali kolendisa boyokani ya mboka.
Atako bato tuku mibale na mitano (25 ports) bakufaki na kobundisama ya Eklezya Mar Elias na 2025, misala mingi ya makasi ezali kokundola elimo enà. O mokolo moye mwa 2 Febwali, na engumba Hama, bangonga ya katedrali eyokanaki pembeni nà ba musulmans sunnites, mpo na kokanisa bato baye babomamaki to bakufaki na mobù 1982. Ezali bongo, elembo ya bomoko na mboka oyo ezali koluka kimya.
Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.