Ebandela ya mobu mwa sika ya kelasi  na Caracas mboka-mokonzi ya Venezuela, o mokolo mwa 12 ya Yanuali ya mobù 2026. Ebandela ya mobu mwa sika ya kelasi na Caracas mboka-mokonzi ya Venezuela, o mokolo mwa 12 ya Yanuali ya mobù 2026.   (AFP or licensors)

Venezuela: Eklezya ezali na mposa ‘te Kelasi (eteyelo) ezala esika ya Boboto mpe ya bosembo

Na libakù lya ebandela ya kelasi, oyo ekokani na eleko ya mpasi oyo Venezuela ezali koleka, Mokambi ya Commission mpo na mateya, oyo ya Lisanga lya ba episkopo, Mgr Curiel Herrera, asengi na bana, bilenge mpe bato banso basalaka na biteyelo to bakelasi, bàtiya bisaleli ya kotanga mpe ya koyekola mpo na mosala ya kotonga boyokani kati na mboka..

Bansango ya Vatikan

 

Mgr Carlos Enrique Curiel Herrera, episkopo ya Carora mpe mokambi ya Lisanga to commission oyo etalelaka makambo ya kelasi, alobaki na likita ya baepiskopo ya ekólo ya Venezuela ‘te: “Awa tozongeli nzela ya biteyelo ba biso, na mobù moye ya sika, commission ya biso esengi kopesa liyebisi lyoko etondi na elikya, na molakisi moko na moko, moyekoli na moyekoli, libota na libota mpe na moto na moto oyo asangani elongo na maye matali likambo ya botangi na o kati ya mboka. Tosangani na mposa ‘te mateya ezala esika oyo boboto (kimya) mpe bosembo ekolendisama. Toyebi ‘te, atako mikakatano mizali, eteyelo ezali esika ya bosantu mpo na kolona mbuma ya boyambi, komipesa na bizaleli ya bosembo mpe ya bonsomi oyo etambwisaka bomoi bwa biso”.

Nsango ya elikya

Na bana mpe na balakisi, Mgr Carlos Enrique Curiel Herrera, azali na mposa ‘te Mokonzi azala kati na bango mpe akamba moko na moko na nzela ya ye. «Nazali kobondela ‘te mwinda mongengisami na Nzambe, oyo toùti kosepela na eyenga ya bomimonisi bwa mokonzi wa biso Yezu Kristo, engengisa mitema mya bino mpe epesa bino makasi mpo ya kosala mosala na bosembo ya Envazile to ya Nsango Elamu», ekobaki ye koloba. Kaka na liyebisi lina, episkopo Carlos alobaki ‘te : «Tokosenga na Santu José Gregorio Hernández, apesa biso bwanya na ye mpe bomikitisi bwa ye, mpo na kosalela ». «Toksenga mpe na Mama Mosantu Carmen Rendiles Martínez, ateya biso lolenge ya koteya na boboto oyo ebongolaka bomoi bwa bato».

Mbela mpo ya kotonga Boboto

Na yango, Mgr Carlos Enrique Curiel Herrera abyangi bana, bilenge mpe bato basusu basalaka na biteyelo, ‘te “bámonisa bisaleli na bango ya kotangisa mpe ya koyekola lokola bisaleli mpo na kotonga kimya na mboka”. Tika ‘te ebandela ya mobu ya kelasi, ezala libaku ya koyoka biso moko, ya koyeba mokano mwa Nzambe, ya kosenga boyokani mpe kimia (boboto) na Venezuela, mpe ya kozongisa mokano na biso ya kobatela biteyelo na biso lokola bisika ya malamu mpo na kotonga kibomwana ya mboka, demokrasi, bosembo mpe kimya

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.

 

14 sánzá ya yambo 2026, 09:44