Luka

2026.01.09 Sàngo Rami Asakrieh, elongo nà bakristu ya parwase Saint Sauveur naYeruzaleme 2026.01.09 Sàngo Rami Asakrieh, elongo nà bakristu ya parwase Saint Sauveur naYeruzaleme 

Terre Sainte, bomoi ya bakristu ezali kati na mateya

Patriarche ya Latin ya Yelusaleme azalaki kotya likebi mingi na biteyelo mpe na mateya mpo na kosunga bandimi. Na Gaza, esika biloko ya liboso ya lisungi ya bato ya 2026 ekomaki, na Eteyelo ya parwase ya Sainte Famille ezali na bana koleka 160 mpe ezali eteyelo kaka moko ya bakristu oyo ezali naino kosala na Gaza. Na Yeruzaleme, bakristu bazali kokita, mpe bazali kotya likebi mingi na makambo ezali kosalisa bango báyebana mpe bámonisa boyambi ba bango.

Albys KBD, CP – Kinshasa/RDC

 

Na mikolo mileki, convoi ya liboso ya lisungi ya bato ya 2026 oyo Patriarche ya Latin ya Yéruzalem atindelaki bato ya Gaza, ekomaki na Gaza. Basilisi Kobwaka babombi. Kasi pene ya bato milio mibale bazangi bisika ya kofanda, bazangi misala ya ntina. Bongo bafandi na etando ya mabele oyo ezali na katikati ya mindelo oyo etyamaki na boyokani ya kimya na mokolo mwa 10 Okotobe moleki.

Wana ezali maloba ya Sàngo Davide Meli, mokambi ya lingomba ya Patriarcat epai na bapanzi-nsango mpe basáli ya misala ya lingomba oyo bayaki na Mabele  Masantu (Terre sainte), na lisalisi ya Opera Romana Pellegrinaggi (Biro mpo na mosala ya kobatela bandimi na mobembo ya losambo). Asalisaki mpo na kobongisa lisungi na Gaza ut’o ebandela ya bitumba, Eklezya ya Latin ezali moko ya bibongiseli oyo ezalaki na makoki ya kokota na Gaza mpe kotinda lisungi nsima na mikolo mibale.

Esengeli komeka kopesa avenire na Gaza

Eloko ya liboso Patriarche ya latin asalaki ezali : kopesa bato biloko basengeli na yango na lombango, lokola bambuma, ndunda, na mpe bavitamine, noki te, nzala elingaki kokotisa makama mingi ya nzoto, mingi mpenza epai ya bana mike. Na yango, Sango Meli alobi ‘te : « Lelomei, biloko bina bizali na bawenze to bazando mpe ntalo ya transport ekiti, kasi sik’oyo tozali na mposa ya bahema mpe bilamba ya kolala». Kino sik’awa, atako basànzà misato mileki, oyo basengaki kotika mandoki to kobete masasi, makambo ezali nayino na kimya te. Bisika ya kobwaka bosoto ezali te, lotiliki ezali te, bisika ya mosala ebebi, mpe biteyelo bibebi.

Yambo te bitumba ebanda, baeteyelo ezalaki mitano. Nyonso ezalaki ya eklezya; kutu mibale ekambamaki na patriarcat yango moko. Na mikolo miye, kaka moko nde ezali kotambola, oyo ya Parwase ya Sainte Famille na Gaza. Bana bakoki kozala nkàmà moko na tuku motoba (160) to nkama moko na tuku mwambe (180) kati na bato nkamà minei bazwami na parwase lokola barefugiés. Kotya mbongo na kelasi ya bana ezali kotya mbongo na mikolo mikoya. Esengeli koluka kopesa bango avenire", elendisaki ye, mpe abakisi ‘te eteni ya misato ya lisungi ezali oyo ya bokolongonu bwa nzoto.

Mikakatano lingomba ya Yeruzaleme ezli kokutana na yango

Sàngo Rami Asakrieh, sangomokonzi ya Saint-Sauveur na engumba esantu, alobi ‘te Patriarcat ya Latin ezali mpe kosala baprograme mingi mpo na kosunga bakristu ya Yerusaleme, mingi penza koleka bato 6 000. Mpo na ye, Mabota mingi mazali kolekisa tango ya mpasi mpo na bitumba, koleka kutu tango ya bokono ya COVID-19

Akobi na koloba ‘te : “Bomoi ya bato na Yeruzaleme ezali na ntalo mingi koleka na bingumba bisusu epai bakristu bazalaki kofanda. Mbongo ya kofutela ndaku ezali na motuya ya 1 800 euro na sanza, mpe ekoki kozala 70% ya lifuti. Lisusu, ntalo makasi ya biloko ya kolya, yango nde ezali kopekisa mbala mingi na bato bazwa biloko lokola misuni, mpe mbongo ya kelasi”. Mpo ya kobatela bomoto bwa bango, bayike balingi kotanga na bakelasi ya mangomba ma bakristu, oyo ezali ntalo makasi, na esika ya kokende na baye ya bayuda ezali ntalo moke. Yango wana, Custodie ya Terre Sainte mpe Patriarcat ba pesi likanisi lya kopesa bato bisika ya kofutela oyo ezali na ntalo moke.

Kino mbula ntuku misato, bakristu bakoki kolimwa

Dima Kalak, mosali ya departema ya makambo matali bato ya Patriarcat, alobi ‘te: “Kozala na ndako na yo moko ezali ndoto mpenza, nzokande yango ezali kokitisa makoki ya mabala”. Usama Salman, oyo, ayekoyaka makambo makoyà,  mpe biteni ya bituka, alobi ‘te: “Na eleko eye ya bozangi ya demokrasi, epai wapi na mobù 2025, bana zomi na mwambe (18enfants) babotamaki mpe bato tuku misato na minei (34 personnes) bakufaki, lisanga ya bakristu ya Yéruzaleme ekoki kolimwa na mibu tuku misato (30 ans)”. Bongo abeti nsete mpe alobi ‘te “ntina ya libosoliboso ezali nde koteya bana. Mpamba te, esengeli kobongisa bato oyo bakoyeba kobatela bomoto ya bakristu, mpo soki bilenge bayebi te lisolo na bango, bakokoka te kotatola yango to kozala banzeneneke liboso ya basusu”.

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.

 

10 sánzá ya yambo 2026, 12:40