Luka

2025.03.29 Episkopo wa lokumu Charles Maung Bo , na sànzà ya Marsi ya mobù 2025 2025.03.29 Episkopo wa lokumu Charles Maung Bo , na sànzà ya Marsi ya mobù 2025  (Cardinal Charles Maung Bo of Myanmar)

Nsango ya boboto ya Episkopo wa lokumu Bo, na Birmanie ezwami na bitumba

Na nsango na ye ya Eyenga ya Mbotama, mokambi ya lisanga lya baepiskopo ya Katoliko ya Birmanie (CBCM) asengaki na lombango mpo ‘te kimya ekota mpe balongola bibundeli.

Albys KBD, CP – Kinshasa/RDC

 

Bato bazali kaka na bosengà bya kimya, atako bitumba, terorisme mpe kozanga bosembo ezali kobebisa elikya na bango”. Elobaki Charles Maung Bo, Episkopo monene ya Rangoun na Birmanie, na nsango na ye eùti koleka kala mingi te na eyenga ya Mbotamà to Noele. Mokambi ya lisanga lya baepiskopo ya Katoliko ya Birmanie alobaki ‘te na eleko eye tozali kotombelana “Boboto bozala na bino”, boboto bwango euti na oyo ya Mwana Yesu azali kopesa. Abakisi ‘te, mwana oyo akoki “kokota o mitema mya biso” mpe “azali na makoki ya kobongola biso”.

Boboto bozali na bibundeli soki moke te

Na kokanisa maye manso mozali koleka o mboka ya ye, lokola matata mpe bitumba na mokili mobimba, Episkopo wa lokumu Bo alobaki lisusu ‘te, boboto bwa Christu oyo asekwi, ezali boboto bozali na bibundeli soki te. Mpamba te, o eleko ya ye, Yezu alongaki kokotisa mbongwana o kati ya politiki ya mboka ya yé, kasi na mobulu te. Asengi bakristu “bàtatola na ntina na nzela oyo ya malamu mpe koyebisa bato banso ‘te báboya makambo ya mabe”.

Likama lya bobangi

Nzokande, atako moto nyonso alingaka mpe azali na mposa ya boboto (kimya), Episkopo wa lokumu Bo, alobaki ‘te o kati ya mokili moye mozangi elikya, bobángi ezali sé kobakisama, bobele kati na bato te, kasi kati na bikólo binso. Alelaki alobi, “Kimya ezali komonana mosika. Bato bazali komibongisa mpo na bitumba na nkombo ya kimya. Bambulamatari bifundami na bolembu soki bazongisi te mobulu na mobulu”. Na yango, alobaki ‘te bikólo binso bizali kokoba kobomba bibundeli.

Episkopo ya Rangoun alobaki ‘te, na kotalela balapolo oyo euti kosalema, kaka na mobu 2024 mpamba, mbongo oyo mokili mobimba ebimisi mpo na bitumba ekokóma na ba dolare miliare 2 718. Abeti nsete alobi ‘te “koponapona bibundeli yango ezali mokumba oyo moto akoki kokima te” mpe abakisi ‘te “mosisa to ntina ya mokakatano moye mozali na boyokani kati na bikólo oyo esimbami te na mibeko, na bosembo te mpe na kotyelana motema te, kasi nde na kobanga mpe na kokonza”. Na yango,  elobi yé, bato bazali tango inso na mitungisi, bazali kokanisa ‘te etumba eponi ngonga te, ekoki kobima ata na ntango nini.

Mayele misusu mpo na kobomba bibundeli

Soki bobangi ezali, bibundeli ekokoba kobilama”, elobaki ye. Na moyi mwa lelo, “na esika ya kobomba bibundeli, bikolo bisengeli koluka nzela ya komemyana mpe kosala elongo, wana nde nzela ya boboto ekowumela”. Se mp ona yango, ekobaki ye na koloba, Pàpa Leon XIV apekisi bobele esaleli ya bibundeli. Kasi mbela ena, ekotinda biso mosika, “tosengeli kolongola bibundeli oyo ezali o kati ya mitema mya biso”. Mpamba te, boboto “bosengeli nayino kozwa misisa o kati ya mitema mya biso”. Episkopo wa lokumu Bo, akundweli n abato ‘te «eyamba ezali na mokumba monene ya kosala, mpo na kokotisa mpe kolendisa boboto to kimya». Kasi mokili, bozangi boyokani ya ba Politiki, bokabwani kati na bikolo mpe ba terrorisme, ezali kosalela eyamba na lolenge elongobani te.

Makambo ma ntina mpo na koluka Boboto

Banso tozali na mokumba ya kopekisa ‘te nkombo ya Nzambe, elobama to esalema na lolenge elongobani te”. Alobi ‘te “Libondeli, misala mya losambo mpe masolo kati na mangomba” ezali “makambo malamu mpe ya ntina mpo na kimya”. Mokambi ya lisanga lya ba episkopo ya Birmanie alobaki lisusu ‘te lingomba nyonso esengeli kotonga mabota ya kimya na nzela ya masolo, bosembo mpe bolimbisi, kasi “na nzela ya koyinana te”. Alobi ‘te “boboto bona bosuka kaka na maloba mpamba te, kasi emonisama na bikela”, mingi mpenza na masolo, boyoki, mpe kozala motema molayi (patience). Koyinana mpe mobulu, elobaki ye, “ekoùtaka na bolembu to mabakù ya bato, kasi bolimbisi mpe ngolu ezali nguya oyo etongaka bomoyi bwa bato”. “Nzambe apambola bato banso oyo bazali kosala mpo na kimya na Birmanie na ndenge inso”. Abakisaki.

Libyangi lya Pápa Léon mpo na kimya na Birmanie

O mokolo ya misio na mokili mobimba, Pápa Léon XIV asengaki ‘te bitumba esila na lombango mpe na ndenge ya malamu na Birmanie. Mpe asengaki kimya na Birmanie mpe na bisika binso oyo bitumba ezali na mokili mobimba. Nsango ya Pápa Léon XIV mpo na mokolo ya kimya ya mokili mobimba, oyo ezalaki kokumisama mokolo mwa yambo ya Yanuali, elobelaki mingi «kimya oyo ezangi bibundeli mpe oyo ezali kolongola bibundeli".

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.

03 sánzá ya yambo 2026, 20:51