Luka

2026.01.29 Sàngà Uchechukwu Oguike, S.J., Omônier ya collège Jesuit Memorial, na Port Harcourt. 2026.01.29 Sàngà Uchechukwu Oguike, S.J., Omônier ya collège Jesuit Memorial, na Port Harcourt. 

Nigeria: Liboso lya mobulu, bakristu basimbami na Boyambi mpe na Elikya.

Kobundisama na mandoki, kokangisama na makasi, kobuka baeklezya. Na Nigeria, kozanga bokengi ezali kokoba kotungisa makasi bisika bakristu bazali. Nzokandé, atako bobangi mpe kobunga ya bato, bakristu bazali kotika ata moke te losambo to kosakola Nsango Elamu. Ezali bongo liitatoli lya Sango Uchechukwu Oguike, S.J., Aumônier ya Collège Mémorial Jésuite, Port Harcourt.

Albys KBD, CP – Kinshasa/RDC

 

Sango ya ba jésuiti alimboli ‘te: Bazali kolobela crise religieuse moko ya makasi oyo ezali koleka banda kala na mboka Nigeria”. Mobulu na ngambo ya Nordi, mingi mpenza na etukà ya Borno, Kaduna, Sokoto mpe Niger. Mobulu yango ekomi kokita na  ngambo ya Sudi o mokolo miye. Esimba bituka mingi, etikali kaka etuka ya Edo mpe Delta. Bazali kobundisa ba eklezya, kotumba ba mboka, kokangisa na makasi bakristu, tembe te, lingomba ya bakristu ezali koleka tango moko sé ya mitungisi.

 Engebene na Sango Oguike, mibulu minà, mikoùta na ntina ya likambo moko mpamba te, kasi makambo bebo, “lokola Hydra, monstre oyo azali na mitó mingi”.

Kolona bobangi, mangili mpe matata na bamboka

Bituluka ya ba Jihadistes lokola ba Boko Haram mpe ba Etat islamiki na Afrika ya Westi, bazali koluka kokotisa na makasi, ezalela ya mbulu, bazali kobakisa mpe matata kati na bato basalaka bilanga nà baye babokoloko bibwele, oyo bazali deja na mpasi mpe bobolà. Balingi kokomisa bato banso ya Nigeria bamizilma, bongo babwaka ezalela ya mikili ya Poto. Kasi matata to bitumba kati n abato ya bilanga nà babokoli bibwele ezali sé likambo ya kala, elobaki yen a bontoki bonso. Kozanga mbongo ebotisi kobilama ya bangengemi na makasi (enlèvements), oyo epalangani mingi na mboka mobimba.

Bakaneli ba Nganga-Nzambe

Eklezya ya katoliko ezali ya kobika te. Banganga-Nzambe, ba Seminariste, Basàngo, bazali tango inso kotungisama na kokangama na makasi mokolo na mokolo. Mp ona lisanga lya baepiskopo ya Nigeria, banganga-Nzambe pene ya nkamà moko na tukù minei na mitano basilaki kokangama kobanda na mobù 2015 kino 2025. Basusu babomamaki. “Ezali likambo moko ya somo mpe ya mawa”, elobi Sàngo Oguike. Nzokande, atako kobanga ezali, “banganga-Nzambe bazali kokoba kotindama na bamboka bisika wapi somo ezali mingi. Mikolo miye, batomboki bayebi sika ‘te, basango bazali na nkita te, bazali na bomoi ya bosàwà, bazali na makoki moke mpamba oyo esengeli mpo na bomoi bwa bango mpe ya Parwase”.

Boko boyambi makasi koleka boobangi mpe Elikya makasi koleka mobulu

Sàngo ya Lingomba ya ba Jésuite alobaki ‘te, na kati ya ezalela wana ya kozanga libateli to bokengi, bomoi ya mokristu ezali sé kokóba. “Na sima ya mwa ntango, toyekolaki koyikela mpasi mpiko mpe kobatela koseka na kati ya bozangi bokengi, liwa mpe kobundisama (ba attaques). Ata mokolo moko te, totikaki kobondela mpe kondimela Nzambe”. Missa, catéchèse mpe milulu esuki te, kondima mpe elikya ezali kolonga kaka. Ata soki batumbi eklezya moko, bato bazali kosangana mpo ya kotonga mosusu mpe bazali kokobana losambo. Bazali bato ya “mpiko”, oyo bamesaná koyikela bampasi mpiko, bazangaka elikya te.

Mbela ya Papa mpe lisanga ya mokili mobimba ezali lisungi ya solo-solo mpo na bato ya Nigeria mpe mpona bakristu. Sàngo Oguike azali na kotondo botondi mpo na mabondeli ya Pápa Léon XIV, mingi mpenza, nsima ya kobomama ya bato na Yelwata, na etúka ya Benue, mpe bokangami bya banakelasi na biteyelo ya Katoliko. Tozali na kondima, mpamba te, elikya eyokisaka bato nsoni te. Alobi lisusu ‘te, azali na elikya mpamba te, makila ma bato baye babomamaki ekokoma nkona makasi koleka ya boyambi.

Bokoba kosambela mpo ya biso

Mpo na kosukisa, Sàngo ya Ba Jesuite abwaki mbela na Communauté Internationale ‘te  mpe asengi «Bokoba kosambela mpo ya biso, mpo ‘te elikya mpe eyamba ya biso na Nzambe eyokisama nsoni te». O kati ya mobulu, Eklezia na Nigeria ezali elembo ya bosembo mpe ya bondimi kati na mokili oyo mozali se kokóba se na mobulu ya bitumba. Mpo na maloba ma Pápa Léon XIV, “etumba ezali elembo”, tembe te, azali nakondima ‘te Nzambe atikaka bato ba ye te, atako bazali o kati ya mimekano.

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.

29 sánzá ya yambo 2026, 16:58