Nigeria: Ezongi lisusu mobulu ya koboma bato na Kontagora
Albys KBD, CP-Kinshasa/RDC
Mobulu moye mobeti dioseze oyo ekutanaki nayino na mpasi makasi mpo ya bokangami ya bana ya kelasi nkàmà mibale na tuku motoba na mitano (265 élèves) na eteyelo ya Katoliko ya Saint Mary de Papiri, o mokolo mwa tuku mibale ne moko ya sànzà ya Novémbe ya mbula moleki (21 Novémbe). Atako babimisaki bana to (batikaki bana na bonsomi) na sànzà ya Desembe, likambo liye lisalemaki na mbala moko te kasi na biteni biteni mingi. Kobandisama ya bitumba ezongisaki bobangi mpe kozanga libateli na etuka mobimba.
Bana babimisaki na boloko bazongeli na kobanga
Mgr Yohanna alobi ‘te bana mpe bilenge ya Papiri, oyo baùtaki na boombo, bazali lisusu na likama te. Lokola bato ba mobulu bakotelaki bango lisusu, bakimaki elongo na bamabota ma bango mpe basusu babatamaki (babombanaki) na zamba butu na moi mpo na kobanga ‘te mobulu mokoba sika. Episkopo abeleli mabe na ntina ya bozangi libateli ya solo, mpe alobi ‘te babomi-bato basalaki mosala mwa bango na kimya mpenza, mpamba te bamonaki solo ‘te basungi ya bokengi bazalaki te. Na yango, babakisaki lisusu mpasi ya makanisi ya bato baye bazalaki na likama.
Bamboka bibundisami, mpe mbela ya bomoko
o mokolo mwa 28 ya sanza ya zomi na mibale to desembe, bitumba ebandaki na mboka Kaiwa, na nsima na Gebe mpe Shafaci, esika oyo babundisaki biro ya bapolisi. Na mokolo ya mibale ya sanza ya yambo, ndako-nzambe ya Katolike ya Sokonbora ebebisamaki, yambo ‘te bato ya mobulu babundisa zando ya Kusuwan Daji na mokolo mwa misato ya sanza ya Yanuali. Babomaki bato tuku minei na mibale (42) ya mangomba ekeseni; bongo bakangaki basi mpe bana mingi. Episkopo alobi ‘te: “Miloli mya moto moye babomi-bato batyaki, ezalaki makasi mingi mpenza; na yango moto ekokaki komonana na mosika, ata na Papari, na ntáká ya bakilometele 15”.
Wana azalaki komonisa mawa ma yé na mabota ya bato baye bakufelaki, Mgr Yohanna abengaki bato ya bituka ndenge na ndenge ya mboka wana “bámona moto mosusu lokola monguna te, kasi básangana mpo na koboya lolenge inso ya mobulu mpe básangana mpo na kotelemela mobulu”. Asengi mpe na bakonzi ya Nigeria ‘te bàmema na bazuzi bato baye bazali na ngambo ya mbeba oyo mpe na nsuka, bàbatela bato ya mboka.
Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.