Luka

2026.01.20 Sàngo Bobbo Paschal du Nigéria 2026.01.20 Sàngo Bobbo Paschal du Nigéria 

Nigeria: Babimisi Sàngo Bobbo Paschal nsima ya basanza mibale ya boloko to bokangami

Eklezya ya Nigeria eyambaki na esengo nyonso kobima ya Sàngo Bobbo Paschal, nganganzambe ya Dioseze ya Kaduna oyo basimba-mandoki bakangaki na bowumeli ya sànzà mibale.

Albys KBD CP - Kinshasa/RDC

 

Sàngo ya parwase ya Saint-Etienne, na etuka ya Kagarko, akangamaki na butu ya mokolo mwa 17 ya Novembe na ndako ya parwase na ye. Ndeko na ye ya mobali akufaki na maboko ya bato oyo basimba-mandoki; likambo liye esalaki mpasi mingi na kati ya lisangá ya bakristu. Na liyebisi moko, Archidioseze ya Kaduna esakolaki ‘te Sàngo Paschal abimaki na boloko na mokolo mwa 17 ya sanza ya yanuali, kasi epesaki te o bozindo bansango mosusu, lokola’te lolenge kani abimaki na boloko. Chancelier ya dioseze, Sàngo Christian Okewu Emmanuel, alobaki ‘te Sàngo Paschal azali malamu.

Kotondo botondi mpe mbela ya kozwa mokumba sima ya bokangami ya nganganzambe.

Episkopo monene ya dioseze ya Kaduna, Mgr Matthew Man-Oso Ndagoso, apesi matondi na basoda bakengeli, bakristu mpe na bato banso oyo basungaki na bansambo to mabondeli. Wayambo azongelaki mpe nsango ya lokuta oyo ezalaki kotambola na ba réseaux sociaux, oyo elobaki ‘te Tata Bobbo Paschal akufaki mwa moke nsima ya bokangami bwa ye, liboso ‘te Archidioseze ya Kaduna eboya lokuta lyango.

Eklezya ezali na komitungisa mpo na likambo lya bokengi

Makambo ya bokengi na Nigeria ezali kaka moko ya makambo ya motungisi mpo na Eklezya, oyo ezali kolobela ndenge oyo bato bazali kokangama na makasi, bato bazali kobunda na mandoki, mpe mobulu na kati ya bato, mingimingi na nordi mpe na katikati ya ekólo. Banganga Nzambe, basango mpe bakristu ya lingomba ya bakristu bazali kokutana na makama mingi, mpe yango ezali kotinda bato ya mboka na bango bátika misala na bango ya kobatela bampate to báfanda na kobanga seko. Liboso ya makambo maye, Eklezya esengi na bakonzi ya mboka ‘te babatela bato na makasi, babundisa ezalela ya kozanga kopesa etumbu n abato basali mbeba, mpe baluka ntina ya mobulu. Lisusu ba basengi bakristu na bango ‘te bazala na bomoko mpe bamipesa mpo na kimya na nzela ya losambeli mpe masolo.

Mutuka ya policier ya opération Fushin Kada na nzela ya Yakowa Road, Kaduna, na Nigeria
Mutuka ya policier ya opération Fushin Kada na nzela ya Yakowa Road, Kaduna, na Nigeria

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.

 

20 sánzá ya yambo 2026, 22:18