Luka

Mobenga mwa Mbotamà, na Betéléme, o mokolo mwa 13 désembe ya mobù 2023. Mobenga mwa Mbotamà, na Betéléme, o mokolo mwa 13 désembe ya mobù 2023.  (AFP or licensors)

Na Betéléme, Bozongeli kobongisa Mobenga mwa Mbotama ekobanda

Nsima ya bikeke motoba, bazongeli kobongisa esika bokristu ebandaki, esika wapi Yezu abotamaki, ekómi eyebani. Mayele ma sika maùtaki na likanisi liùtaki na bomoko ya bakonzi ya Lingomba ya Ortodokse ya Gresi, ya Custodie ya Mabele Mosantu, elongo nà bakonzi ba Lingomba ya Ortodokse ya Arménie. Mosala mwango mozali kosalema na lisungi ya bokambi bwa Etukà ya Palestine.

Albys KBD, CP – Kinshasa/RDC

 

Soki ezali na esika moko oyo latitude mpe longitude ekoki kolimbola yango te, ezali na mobenga ya mbotama (Grotte de la Nativité). Kuna nde ezali esika mwana oyo abongolaki lisoló lya bato na mokili abotamaki. Sima ya mibù nkama motoba, mobenga moye mobàtàmà o bozindo bwa bazilika, na Beteleme, mozali komilengele mpo ya bobongisi bwa ye, ya mbala ya yambo. Patriarcat grec-orthodoxe ya Yéruzalem na mpe Custodie ya Terre Sainte, nde bapesaki nzela moko nsango ena. Balakisaki mpe esengo ya bango mpo ya likanisi lya mosala moye; mpamba te, ezali mpo ya litomba ya boyokani kati na Patriarcat apostolique arménien orthodoxe. Mosala mwango mozali kosalema na lisungi ya bokambi bwa Etukà ya Palestine.

Mahmoud Abbas, Mokambi ya Palestine, apesaki liyebisi lya ebandeli ya misala ya kozongela kobongisa esika mokonzi wa boboto abotamaki. Ezalaki na libaku lya bokutani bwa ye elongo nà Pàpa Leon XIV, tango ayaki na mobembo na Roma o mokolo mwa 2 mpe 6 ya sànzà ya Novémbe moleki . Alobaki yango lisusu, na tango ya bofungoli San Salvatore in Lauro, ndako Nzambe ya Roma. Abbas abéngaki yango “elembo ya elikya monene mpe ya mbotama ya sika mpo na Mokili Mosantu mobimba”. Na yango, engebene na mobeko mwa mokonzi ya mboka oyo ebimisamaki na mobu 2024, mpo na kozongisa esika yango na molongo, mpe na mibeko ya kala oyo ezali kotambwisa bisika bisantu, esika bato ba mangomba ya bokristu bakumisaka lokola esika epai wapi Nzambe azwaki bomoto (incarnation), esika ena, ekozwa bosénga bwa yango.

Bapesi mosala moye na kompanyi moko ya Italie

Mosala moye ya kobongisa mobenga ya Beteleme, ekopesama lisusu na kompanyi moko ya Italie, oyo ezali na engumba Prato. Mpamba te, eleki kaka mibù mibale, oyo “ebikisaki” ndako-nzambe ya Nativité na nzela ya mosala monene ya kobongisa yango. Likambo yango esalemaki mpo na kobatela mayele, mayele ya mosala ya maboko, mpe mayele ya kosala mayemi na esika oyo ezali na motuya mingi. Giammarco Piacenti, Mokambi ya kompanyi ya Prato, alobi ‘te “misala mikobanda na nsuka ya sànzà ya Yanuali”. Mosala mona ekosenga kosimba bisika binso ya mobenga ya Beteleme, ekobanda na mabangà oyo ezali polele, marbre oyo batyá na nse, makonzí, mayemi, monzoto ya palata oyo ezalaki komonisa esika mpenza oyo Yezu abotamaki, ekeko ya Moize, mpe etumbelo. Bato motoba to mwambe, ata mpe bato ya mboka, bakosala na esika ya botongi. Giammarco Piacenti alobi ‘te “Bàteyaki basali mingi, kobanda 2013, tango babandaki kosala na Terre Sainte”.

Soki balongoli misala ya mobenga, mosala mwango ezali kosangisa mpe misala mya kobongisa bisika mosusu oyo ezali pembeni, mpo na komonisa bomoko ya tempelo mpe elimo ya kosala na bomoko mpo na kobatela yango mpo na bato banso. Ntembe ezali te ‘te mosala ya kobongisa biloko ya kala ekosunga mpe mabota mingi ya basali oyo bazali kosala mosala monene wana. Ekosalisa mpe, na nkita ya Beteleme, oyo ekomaki na mabolongo mpo na matata kati na Israël mpe Hamas. Misala mina ekosalisa mpe mpo na kozongela mibembo ya losambo oyo bakataki, kasi lelomei, mozali kozongela malembe-malembe mpo na ebandeli ya “Phase 2” ya plan ya kimya ya Donald Trump.

Na nsé ya elembo ya Bomoko

Mokanda ya Custodie elobaki ‘te: ezali elembo ya mbotama ya sika, kasi ezali mpe likambo lya mokili mobimba, oyo emonisi boyokani kati na Bagreke ya Lingomba ya Otrodokse mpe ba Franciscains, bakengeli ya mobenga (Grotte). Mpamba te, “mosala mwango mozali elembo ya bondimi ya bokristo mpo na kobatela libula ya elimo, ya kala mpe ya bonkonko ya Mobenga Mosantu (la Sainte Grotte) mpo na mabota maye makoyà, mpe kobatela lokumu ya esika oyo Nsango ya bokristo emonanaki mpe epai bandimi ya bikolo binso bayanganaka na mobembo ya losambo, bikeke na bikeke”.

Kozongela kobongisa esika eye Esantu, elimboli kobatela Boyambi, makanisi mpe losambo na mboka ya Mbotama. Na nzela ya mosala oyo ya lisangà, mangomba ma Yeruzeleme ezali kobatela libula ya Nsango Elamu oyo epesamelaki bango mpe ezali kosala ‘te bakristu ya bikolo binso, balanda limeseno ya bonkoko, mpe bakoka kokoba kokumisa esika ya mbotama ya Kristu. Mpo ‘te ut’o Beteleme, mwinda mwa Mbotama ya Yezu ekoba kongengisa mokili, kotatola kozala ya seko ya Bakristu na Mabele Masantu mpe ya elikia oyo ezali kongenga ut’o Mobenga Mosantu epai wapi Mobikisi abotamaki.

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.

26 sánzá ya yambo 2026, 09:59