Baepiskopo ya ekolo ya Benin Baepiskopo ya ekolo ya Benin 

Maponami na Bénin, Eklezya esengi na bato bàzala na bososoli

Baepiskopo ya Bénin bazali komitungisa mpo na makambo ya politiki na mboka, liboso ya maponami ya mokambi ya mboka, oyo ekosalema o mokolo mwa zomi na mibale ya sànzà ya Aprili (12 avril). Na nsuka ya liyangani lya bango, ba Episkopo ya Benin (CEB) ba byangi ba acteur ya bomoi ya mboka, na “kozwa mokumba mwa bango, bayeba kosolola na eleko eye, mpo demokrasi ekomela”.

Albys KBD, CP – Kinshasa/RDC

 

Mbela eye eyaki mwa baposo nsima ya “mokano yakosala coup d’état na mokambi ya ekolo kasi elongaki te. Likambo liye eleki na sanza ya Decembe to zomi na mibale ya mobù moleki”. Sé bongo, ezongisaki lisusu kobanga na mboka. Ba episkopo ya Bénin basengi na bato ya mboka balokota “libaku liye mpo na kolendisa kimya, bomoko na ekolo mpe bomoko kati na bato, mpo ete Bénin ebima na makasi na eleko oyo ya ntina mingi na lisoló ya mopelengano (politiki) mwa yango”.

Bomitungisi ya bato mpe bomoko

Soki balongoli likambo litali maponami, bazali kobenda likebi na bomoi ya mpasi ya bato mingi. Baepiskopo balobeli kokita ya makoki ya kosomba biloko, bobola ezali se komata mpe mikakatano mya bato ya bilanga bazali kokutana na yango, na ndakisa mbula ya mabe mpe mikakatano ya koteka biloko ya bilanga. Bakengeli mpata ya Eklezia bamonisi bondeko ba bango mpe mawa ma bango, mpe basengi na bomoko ya ekolo, mpo moto na moto azala na bomoi nà lokumu oyo Nzambe alingi.

Bokengi mpe limemya ya bomoi

Basangani ya likita ya lisàngà lya baepiskopo ya Bénin balobi ‘te bazali komitungisa na ntina ya «koyikana ya makámá ya nzela». Bazali kokundwela ‘te « bomoi ya moto ezali likabo lya motuya oyo euti na Nzambe » mpe bazali kosenga ‘te bato banso báyeba yango. Na nsuka, basengaki na bana mboka, bakonzi ya Leta mpe basodá ya libateli, bàsala mosala na bango mpo na kobatela bomoi mpe kobatela bato banso.

Baepiskopo ya ekolo ya Benin

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.

 

16 sánzá ya yambo 2026, 09:32