2025.01.30 Elili ya elembo ya Bana ya ekolo ya Malawi 2025.01.30 Elili ya elembo ya Bana ya ekolo ya Malawi  

Malawi: Bosepeli bwa mokolo ya enfance missionnaire 2026

Na eyenga ya Bomimonisi bwa Mokonzi ya mobù moye, bana koleka 100 000 ya Malawi basepelaki na molulu monà, o mokolo mwa lomingo mwa 4 Yanuali. Motó ya likambo: “Bomoko kati na Kristu, bomoko kati na etinda”. Baboti basengelaki kopesa bango ndakisa malamu, kosunga bango mpe kosalisa bango ‘te bakutana na Yezu kati na bomoyi ba bango.

Albys KBD CP – Kinshasa/RDC

 

Na mobù moye, Bana koleka 100 000 ya Malawi basanganaki na milulu ya mokolo mwa Enfance Missionnaire na mboka ena. Mokolo mwango ekokanaki nà eyenga ya Bomimonisi bwa Mokonzi (epifaniya).Eklezya ya mboka nde eponaki yango, o mokolo mwa minei (4) ya sànzà ya Yanuali. Baepiskopo mingi basalaki milulu mya ntina mingi na ekólo mobimba. Bana basanganaki na mokolo yango lokola bayembi, batángi, basáli ba misa, bakambi ba mayangani. Bazalaki mpe kobina na ntango ya losambo. Motó ya likambo ya mokolo ya bana ekokani na oyo ya mokolo ya bamisionere ya mokili mobimba na 2026.

Moto ya likambo engebene na baepiskopo

Dioseze na dioseze baepiskopo bazalaki kosalela mitindo ndenge na ndenge mpo na koyebisa bana nsango ya ntina ya mokolo wana, mbala mingi bazalaki kosalela molulu mwa Bomimonisi. Na Archidioseze ya Lilongwe, Mgr George Tambala alobaki ‘te baye banso bazali na mikumba na kati ya société mpe na libota basengeli kozala “minzoto” moye mokolakisa bana nzela ya Nzambe. Na diocèse ya Karonga, Mgr Mtumbuka alendisaki bana bazala lokola “minzoto” mpo na basusu, lokola monzoto oyo ememaki banganga-minzoto kino na esika ya mbotama ya Mwana Yezu.

Episkopo ya Blantyre, Mgr Thomas Luke Msusa alobaki ‘te asepelaki mingi na ndenge bana basalisaki misa ya mokolo mona, sé bongo, bamonisaki ‘te bazali kosangana na molulu mwango. Na diocèse ya Zomba, Mgr Alfred Chaima alobaki ‘te koteya bato losambo ezali moko ya makambo ma ntina ya bomoi ya bakristu ya makasi mpe ya botondi. Mokambi monene ya diocèse ya Dedza asepelaki mingi na komona ‘te na mokolo ya Enfance Missionnaire na mokili mobimba, basango ya parwasi bapesaki makabo na bango na bolingo nyonso mpo na Fonds de solidarité universelle.

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.

 

08 sánzá ya yambo 2026, 23:04