Kopesa mateya ya ofele mpo na kopusana penepene na Liloba lya Nzambe
Albys KBD, CP – Kinshasa/RDC
Koyeba Biblia, kopusana penepene na Makomami Masantu na lolenge ya pete mpe ya boyokani, yango nde ezali kotinda Faculté ya Théologie ya Institut catholique ya Paris epesa mateya ya iniversite mpo na bato banso mpe na nzela ya internet. Ezwami ut’o mokolo mwa 25 ya sànzà ya Yanuali, mpe na nzela ya bomipesi ya ba partenaires ndenge na ndenge, matangi maye (ce cours en ligne ) ya poso motoba na nzela ya internet, oyo ezali na motó ya likambo “Biblia, Liloba lya Nzambe”, epesi libaku moko ya kokamwa mpo na kozwa bafungola ya kotanga mpe kososola Biblia na nzela ya mayele ya balakisi-balukiluki ya institut.
Mosangani moko na moko akoki kolanda ba vidéos misato ya poso na poso na rythme na ye moko, elongo na ba ressources mpe ba tutoriels oyo ekoki kosalelama na ye moko (indépendamment) to na lisanga (groupe).
Anne-Sophie Vivier-Muresan alimboli ‘te: “Tolingi kosala to kotiya bomengo ya mateya ma biso ya iniversite ezala mpo na moto nyonso, ezala bazali sembo oyo balingi kokolisa o bozindo kondima to boyambi bwa bango, bakatekisi, bakambi ya bapastorale to bato oyo bazali na mposa ya koyeba Biblia”. Mokambi ya Faculté ya Teoloji ya Institut catholique na communiqué ya bapanzi-nsango, abakisaki ‘te likanisi ezali ya “kopesa mayele ya makasi mpo na kokɔta na Makomi Masantu, kososola yango na bozindo na yango mpe koleisa bomoi ya moto”.
Mateya mango makabolami na biteni motoba (six séances), ko botisa makanisi (développer les thèmes) ebele zinga zinga ya liloba lya Nzambe, kobanda na bomimonisi (révélation) tee na bomoi bwa seko na nzela ya Komunio. Manso mana ekambami na bayebi (les experts) ya Institut catholique ya Paris elongo nà Archevêque ya Rouen, Mgr Dominique Lebrun.
Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.