2026.01.30 Foto ya mokolo mwa losambo mpe bomanioli mokolo mwa mokili mobimba ya mbala ya zomi na mibale (12è) mpo na kobundisa mombongo ya koteka bato 2026.01.30 Foto ya mokolo mwa losambo mpe bomanioli mokolo mwa mokili mobimba ya mbala ya zomi na mibale (12è) mpo na kobundisa mombongo ya koteka bato 

Kampagne ya mokili mobimba mpo na kobundisa mombongo ya koteka bato, na Mosantu Bakhita

«Kimya ebandaka na lokumu la moto. Mbela ya mokili mobimba mpo na kosukisa mombongo ya koteka bato», ezali motó ya likambo lya mokolo mwa mokili mobimba ya losambo mpe kokanisa mpo na kosukisa mombongo ya bato ya mbala zomi na mibale (12é). Kobanda mokolo mwa 4 kino 8 ya sanza ya Febuali na Roma, bayangani ba mikili bikeseni bakokutana mpo na kopesa formasyo mpe kosalisa bango báyeba makambo mosusu, mpe na nsuka, bakosangana na losambo la Angelus na esika ya Saint-Pierre elongo nà Pápa Léon XIV.

Bansango ya Vatikan

 

Kobanda mokolo mwa minei(4) kino mokolo mwa mwambe (8) ya sanza ya Febuali, mobulungano moko ekobanda na Roma mpe na mokili mobimba, elongo na Papa Léon XIV, mpo na kokanisa mokolo mwa mbala ya zomi na mibale (12é) ya mokili mobimba ya losambo mpe ya kokanisa mpo na kobundisa ezalela ya mombongo ya koteka bato. Basepelaka eyenga yango, mbula na mbula, o mokolo mwa mwambe ya sànzà ya Febuali (8 fevrier) na libakù lya eyenga to feti ya Santu Josephine Bakhita, elenge mwana ya mwasi ya ekolo ya Soudan, oyo akendaki na boombo ut’o azalaki na mbula sambo (7 ans). Kasi akomaki kino moyi mwa lelo, elembo ya mokili mobimba ya eklezya katoliko, na mokumba mwa ye ya kobundisa mombongo ya koteka bato. Ebandisamaki na Mobeko ya Pàpa François na mobù 2015. Mokolo moye ya mokili mobimba, ebongisami na Talitha Kum, réseau ya mokili mobimba mpo na kobundisa mombongo ya koteka bato. Bazali kolanda yango malamu, bamamelo ya mangomba bayiké, mpe epesami na Union internationale des Supérieures générales (UISG) mpe Union des Supérieures généraux (USG). Misala mina, mizali kosalema na boyokani kati na Dicastere mpo na misala ya Développement Humain Intégral, nà dicastère mpo na Communication, nà dicastère mpo na ba instituts ya vie consacrée nà mpe ba sociétés ya vie apostolique elongo nà na bibongiseli bisusu ya Katoliko mpe na ba muvema oyo ezali kobundisa mombongo ya koteka bato.

Kotekama ya bato

Ebongiseli ya Nations Unies (ONU) elobi ‘te na mokili mobimba, bato milio tuku mibale nansambo (27 millions), bazwi likàma ya kotekama lokola baombo, mingi mpenza basi, bana mike, bakimá-mboka mpe baye bazali koluka esika ya kovanda mpe bakimá bamboka na bango. Ezali likambo ya mpasi mpe ya somo, oyo ezali na mitindo ebele. Kobanda na mosala ya bokali na makasi, kosalisa bato misala ya makasi, na misala ya koboyi na bandako, nà kobalisa mabala ya makasi. Atako etikali ya kobatama to ya kobombama mingi mpe eyebani malamu mpenza te, ezali kokola mingi na nzela ya lolenge ya sika ya kosalela internet. Mbula na mbula, o mokolo mwa 8 Febuali, bankóto ya bato na mokili mobimba basanganaka na losambo la Mokolo mwa Losambo la mokili mobimba mpe mokolo ya kokanisa na nzela ya makambo, ya tango ya losambo, mpe misala ya kobakisa boyebi na ba communautés, ba paroisses mpe ba associations.

Lolenge ekosalema na Roma

Na Roma, mikolo mwa bokundoli eyenga eye, ekobanda o mokolo mwa misato mwa 4 ya Febuali. Bakambi batindami oyo bazali bobele na Roma, bakosangana na likita monene elongo na Pàpa. Kati na makambo ma ntina oyo bakanisaki kosala, ekozala nà molulu ya kopelisa babuji to kandela mpe veillé ya losambo na Bazilika Sainte-Marie-ya-Trastevere, o mokolo mwa minei, mwa 5 Febuali na ngonga ya 17h30. O mokolo mwa mitano mwa 6 ya Febuali, ekola nà mobembo to Pelérinage na nzela ya Internet, mpo na kobundisa mombongo ya kotekama ya bato oyo ezali kosangisa bakontina binso na ntango ya losambo ya mokili mobimba. Sima Papa akoloba mpe akopesa liyebiso. Bongo o mokolo mwa Lomingo mwa 8 ya sànzà ya Febuali, bakosala losambo la Maria ya Angelus elongo nà Pàpa, sima ekolanda milulu mya Ukaristya. Episkopo wa lokumu Vincent Nichols, ya groupe Santa Marta nde akokamba misa mana, elongo nà Sango Mario Zanotti, o.s.b, oyo azali secretaire monene ya USG na bazilika Saint-Pierre.

Kosalisa bato bazwi likàmà mpe baoyo babiki na likàmà

Mombongo ya koteka bato ezali mbeba monene na mokili mobimba, ezali kobebisa lokumu ya bato mpe ezali kobebisa kimya ya mboka na biso, mingi mpenza na mokili moye motondi matata, bitumba mpe kokima na makasi.  Soki baluki kotiya likambo ya kimya mpe lokumu ya moto na motema ya mokolo mwa mokili mobimba ya mobu moye, baorganisation bazali kobyanga bato banso ya motema malamu na koleka na kobakisa boyebi mpe na kosangana na misala mya solo mpo na kosukisa mobulu moye. Mokumba ya reseau international oyo ezali kobundisa mombongo ya koteka bato Talitha Kum, ezali ya “kosalisa mbala moko bato bazwi likàmà mpe baoyo babiki na likàmà, koyoka lolàkà la bango, mpe kosenga mbongwana ya systeme oyo eza kosukisa ntina ya mombongo ya koteka bato mpe kotonga mokili oyo ezali na kimia, bosembo mpe lokumu mpo na bato banso”.

Mpo na kosala yango, babongisi-nzela (les organisateurs) bazali kobyanga bato banso na kosangana na mobulungano to kampange ya ba réseaux sociaux na nzela ya internet mpo na kokabola mokanda moko o mokolo mwa 8 ya sànzà ya Febuali na hashtag officiel #PrayAgainstTrafficking.

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.

30 sánzá ya yambo 2026, 21:43