Guinee : Enfance Missionnaire na mosàlà ya Bolingo mpe Bomoko
Albys KBD, CP – Kinshasa/RDC
Milulu mya misa mosalemaki bobele na bana mike. Banzembo na bango etondisamaki na esengo mpe kibomwana. Bazalaki kotatola moboyi bwa eklezya ya esika ena. Mibù zomi mileki, ut’o Mgr Coulibaly abandisaki yango, bokutani bonà ekomà elaka ya mbula n ambula. Eyambaka mbula n ambula, baParwase bikeseni ya archidioseze.
Bolingi mpe boningà, o kati ya message pastorale
Na tango ya mateya, Episkopo monene asololaki elongo nà bana, yambo ‘te ayebisa bango makambo misato ya motuya ya bomoi bwa bokristu: “Koyeba Kristu lokola Nkumu wa Boboto, kosàala bikela bilamu mpe kozala na bolingi ya bandeko”. Na ndakisa ya makomi ma Santu Polo mpe ya Nsango Elamu ya Santu Mateo, Mgr Coulibaly abetaki nsete na likambo ya bolingo mpe bondeko, mpamba te, yango nde ekokata likambo lya bokristu bwa biso. Abyangi mangomba ma parwase mpe bamovema ya misàlà ya Katoliko bakolisa bomoko, balongola mitindo minso ya bokabwani. Na nsuka ya mateya ma ye, alobaki ‘te: “Nakosala nyonso mpo ‘te bondeko bosengaka Yezu, ezala solo o kati ya bomoi ya bana ya Archidioseze”.
Elembo ya bomoko mpe ya Elikya
Losambo mpo ya bomoko ya Archidioseze, etikaki elembo na milulu mina. Na nsuka ya Misa, Mokonzi ya yambo ya archidioseze, asalaki mwa elembo moko ya makasi mpenza, nakopesa mwana na mwana mwa likabo. Ezalaki elembo ya bozalani pembeni, ya bomoko mpe ya elikya. Na ndakisa ya mwinda mwa Nsango elamu ya Mt 25,31-46, bana bazongaki nà etindà lokola bamissionnele. Basengeli komema mwinda mwa Noele mpe mabongi mwa bondeko mpe ya bomoko, o kati ya mangomba ma bango, mpe o kati ya ekelzya mobimba ya Conakry.
Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye