2026.01.16 Roma, lBazilika Saint-Pierre mpe synagoga 2026.01.16 Roma, lBazilika Saint-Pierre mpe synagoga  

Episkopo wa lokumu Pizzaballa: Kobongola masolo ya Bayuda nà Bakristu mpe kokokisa yango mpo na bato

Boyokani kati na Bakristu mpe Bayuda, oyo ezalaki liboso bokutani kati na bato ba lokumu, esengeli kokoma lisolo kati na bato nà mangomba. Yango ezali likanisi lya mokonzi ya Lingomba ya Katoliko na Yeruzaleme, oyo na mokolo mwa poso, mwa 17 ya Yanuali, liboso lya mokolo moye bazalaki kokanisa mokolo mwa masolo kati na mangomba mibale, asengaki ‘te boyokani yango ezonga lisusu.

Albys KBD, CP – Kinshasa/RDC

 

Mbula tuku motoba sima ya kobimisa Nostra aetate, mokanda ya likita monene, mpe na kotalela mbula mibale ya mpasi ya bitumba na Mokili Mosantu (Terre Sainte), kozongisama ya boyokani kati na Bayuda mpe Bakristu ezali na ntina, na kotalela mikolo mizali koya. Episkopo wa lokumu Pierbattista Pizzaballa, Patriarche Latin ya Jéruzaleme, andimi yango mpenza o mokolo mwa liboso ya 37e mokolo mpo na kolendisa mpe kokolisa masolo kati na bakatoliko nà ba Yuda, oyo esalemaki o mokolo mwa samedi 17 ya Yanuali, na motó ya likambo «Na yo mabota nyonso ya mokili ekopambolama».

Koleka na bato ya lokumu kino na bato ba mangomba

Tosengeli koluka lolenge ya kotonga mpe kokolisa boyokani mpo na bolamu ya mangomba ma biso”. Abakisaki ‘te: “soki kino sik’awa, masolo ezalaki mingi na etando ya bato ya lokumu, tango ekoki mpo na masolo kati na bituka to mangomba”. Alobi ‘te Heschel akomaki lisolo moko ya ntina mingi na bambula ya 1960 oyo ezalaki na motó ya likambo ‘te “Lingomba nyonso ezali esanga te”. Maloba maye myebani mingi mpe ezali komonisa ‘te, “ut’o tango wana, mokomi ayebaki ‘te lingomba moko te ekoki kokanga nguya na yango moko, kokanga yango, kofanda bobele kati na yango”.

Na yango, Episkopo Pizzaballa asukisi na koloba ‘te kokola emonisamaka mpe na lolenge ya kofungwama na basusu, na makoki ya kozala na boyokani na bazalani na yo. “Yango elingi koloba te ‘te bomoto na yo moko ekomi molili, kasi ezali nde kokoma makasi na nzela ya bokutani na moto mosusu. Esengeli kozala polele, mpe na moyi mwa lelo ezali komonana polele mpe ezali na ntina mingi”.

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.

19 sánzá ya yambo 2026, 10:09