Elikya, Mbongwana mpe Boboto, Malako ma Mgr Guy Richard Appora
Albys KBD, CP – Kinshasa/RDC
Mobu mwa 2025, oyo etyamaki elembo ya Elikya, ezala mpo na Eklezia eleko ya ngolu ya kokamwa. Bato, baepiskopo mpe baparwasi bazalaki kosala mibembo mpo na kosambela, koyangana elongo na bato ya mboka na bango, koluka kobongola bato na lingomba na bango mpe kosala misala ya kobongola motema. “Zubile ya elikya esalisi biso na kokanisa mingi na ntina ya boyambi na biso mpo na kozala na bomoi ya malamu koleka”, elobi Mgr Appora, mpe alobeli mangomba ma bakristu oyo ezali na bomoi mpe bamipesi mpo na bosembo mpe kimya.
Boboto to Kimya oyo ezangi mandoki mpe oyo ekolongola mandoki
Na kozongela maloba ma Pápa Léon XIV, Mgr Appora amonisaki ‘te kimya ya solo etongami te likoló lya bobángi to likoló lya nguya ya bibundeli. Kasi “Kimya oyo ezangi bibundeli, mpamba te esimbami na bobangi te, na botungisi te, to na bibundeli. Kimya oyo ekolongolaka bibundeli, mpo ekoki kofungola mitema mpe kobota boyambi, motema mawa mpe elikya”. Alobi ‘te kimya eye ezali likabo oyo ezali kosala mosala mpe ezali na ntina mpo na moto na moto, ata soki auti wapi, azali mondimi ya lingomba nini mpe azali na esika nini na bomoi na ye.
Mwinda mwa Mbotamà, liziba lya Elikya
Na kosukisa, mokambi ya Lisanga lya baépiskopo ya Centrafricaine asengi na bakristu bazala na misisa na mwinda mwa Kristu Mobikisi mpo na kokoma banzeneneke basolo ya bolingo makasi, oyo eleki koyinana. “Tiká “te mwinda moye mokomisa biso banzeneneke ba solo ya elonga ya bomoyi likoló ya liwa (kufa). Libyangi mpo na kokota mobu mwa sika nà elikya ya sika, mpo na “mibali mpe basi ba motema bolamu”, na mosala mwa kimya ya solo oyo ezangi mandoki to bibundeli mpe oyo ezali kolongola bibundeli.
Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.