Episkopo wa lokumu Ambongo: Afrika ezali pema ya molimo oyo ezali kopema elongo nà bato ba yé
Albys KBD, CP – Kinshasa/RDC
Ezali bongo mbala ya yambo, oyo, Pàpa Leon XIV ayambi Bakambi ya SCEAM (Symposium des conférences épiscopales ya Afrique mpe nà Madagascar) ut’o baponaki ye. Episkopo wa lokumu, Ambongo alimboli ‘te likita lina ezwaki mwa mikakatano mpo ya mobembo mwa bontoma bwa Pàpa na Turquie mpe na Liban
Yoko eklezya liboso lya mikakatano mya mabele ma yango
Na tango ya likita linà, mokambi ya SCEAM apesaki lapolo na Mokonzi Ntomà monene ya bokutani ya mbala ya tuku mibale (20è) ya liyangani monene (assemblée générale) oyo esalemaki na mboka Kigali na sànzà ya Agusti moleki. Mama na likanisi ezalaki: “Kristu, liziba lya Elikya, ya boyokani mpe ya boboto to kimya”. Yango ndé epesaki nzela ya «kotalela o bozindo» «mosala mwa biso lokola babateli ya mpate na kati ya mokili oyo etondi na mikakatano».
Alobaki “te na kati ya bitumba, mobulu ya politiki mpe bokabwani kati na bato, Eklezia ya Afrika esengeli kotalela lisusu etindà na yango ya kobatela bakristu na mwinda mwa Nsango Elamu mpe minyoko ma bato.
Yoko Eklezya ekokabola minyoko mya bato ba yé.
Na tango ba Sali yé motuna mpo na bokolongono bwa Eklezia katoliko na Afrika, mokambi ya SCEAM azongisaki likanisi lya Papa François, alobi ‘te Eklezia ekokani soki moke te na ngambo moko ya mopelengano to politiki: “Ngambo na bino, ezali ngambo ya bato”, azalaki kokanisa na bakengeli mpata ya Afrika. Bongo akobi koloba ‘te: Kozala pene na mpata elimboli komema na motema mawa to mpasi nyonso, nà mpe bampota ya bato.
“Bakoki kotala Eklezia na Afrika lokola mpema ya molimo ya batoya mokili. Kasi lolenge yoko, azalaki mpe kokabola to koyoka mpasi, minyoko elongo na bato ba yé. Mpe ezali likambo ya kokamwa te”.
Atako mikakatano mizali, kardinale akumisaki bomopesi ya bakengeli mpata bazalaki wana, oyo bazali pembeni ya mangomba mazali konyokwama.
Mobembo mwa Pàpa, Mpema ya Elikya tokozila
Bato bazali kolikya ‘te Léon XIV akosala lisusu mobembo mwa ye na Afrika. Mpamba te, “ezali nde mokengeli mpata moto akoya kolendisa bakristu ba yé na boyambi”, elobaki Ambongo. Na mikili miye mitondi na mikakatano, maloba ma Pápa mayebani lokola lolakà la mosakoli oyo ekoki kobondo, kolendisa mpe kopesa elikya. “Ata soki makambo mazali kotambola malamu te na moyi mwa lelo, elikya ya bokristu ezali koloba na biso ‘te: tósimba to tozala makasi. Lobi ekozala malamu koleka”.
RDC : Boboto to mpe kimya ekoyà na nzela ya bitumba te
Na kolobela ezalela ya mabe na Moniele (Esti) ya Répibliki démokratiki ya Congo, episkopo - Mokonzi ya Kinshasa abimisaki polele likanisi moko ya mpasi, bongo alobi ‘te : «Au-delà des grands discours, c’est le petit peuple qui paie le prix de la guerre» , elimboli ‘te : «libanda ya maloba mpe masukulu manene, ezali bangamba nde bazali kofuta minyoko ya bitumba». Liboso lya bozangi makoki ya kosalela mayele ya basoda, Eklezya ezali kokoba kolendisa masolo lokola nzela kaka moko ya solo mpo na kozwa kimya ya libela.
«Eklezya etikala koluka soko moke te, nzela ya kozwa biyano libanda. Biyano to lolenge ya kozwa solisio ezali nde kovanda esika moko pembeni o mesa». Episkopo wa lokumu Ambongo abyangi na masolo kati na makunzi ya bikolo: mbulamatari, opozisio ya bibundeli mpe oyo ezangi bibundeli, sosiete sivile. “Banso bazala elongo mp ona kolobela likambo ezali kotambola te mpe ezali kopekisa mboka na biso ekende malamu”.
Elikya oyo ezali koyika mpiko
Atako mobulu ezali se koùmela to kobakisama, Kardinale Ambongo alembi te. “Tozali kokoba kobondela mpo na mboka mpe tozali na elikya ‘te masolo maye, makosalema mpo ‘te, na nsuka, mpasi to minyoko ya ba-Congo esila”.
Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.