Cameroun: Boyokani mpe bosangani, ntina ya likita ya ba episkopo
Albys KBD, CP – Kinshasa/RDC
“Welcome to our daddies” to “Boyei bolamu na batata ba biso”, ezalaki bongo boyei bolamu bapesaki na ba episkopo n abato ya engumba ya Kumba. Likita lisalemaki na ngambo ya Sudi-Westi ya ekolo ya Cameroun epai wapi balobaka lokotà ya lingelezi. Atako mbula ebetaki, yango esukisaki te esengo ya basali na nzambi nakoyamba batata ba bango baepiskopo. Bazalaki koyemba banzembo, kobina mpe koganga na esengo ya komono bango. Batambolaki na bango elongo kino na esika ya Ndakonzambe monene (Katedrali) ya Motema mosantu mwa Yezu ya Fiango (Cahédrale Sacreé-Coeur). Bosenga ezali mingi oyo bato bazali kozela na likita liye: “balingi komona ‘te baepiskopo bazali kosimba bampota ya bato, kokolisa masolo, kolendisa bomoko, kozongisa bondimi makasi, mpe kondimisa lisusu molende ya Eklezia mpo na bolamu bwa bato banso”
Mbela ya kokoma “minzoto” mpo ya basusu
Na kokamba misa monene ya eyenga ya Bomimonisi bwa Mokonzi wa biso Yezu Kristu na Ndakonzambe monene (Katedrali) ya Motema mosantu mwa Yezu ya Fiango, Mgr Agapitus Nfon, a kundolaki lisusu n abato etinda ya motuya ya ba episkopo banso; nde oyo ya “kopusa bato pembeni na Nzambe”. Mosala mwango esengaka mpiko, kondima, komipimela mpe komikitisa. Na misa ya bofungoli liyangani liye o mokolo mwa 4 ya yanuali 2026, Mokonzi way ambo (Prelat) abengaki mwana nyonso ya Nzambe akóma “monzoto” oyo ezali kolakisa nzela na moninga mwa ye, mpo na kokundola ‘te likabo eleki monene, oyo tokoki kozongisela Mokonzi, ezali oyo ya bolingo ya solo oyo ekomonono na bikela esika ya moko mpo na mosusu.
Liyangani na elembo ya Boyokani mpe Bosangani
Na motuna basalaki ye mpo na impact ya liyangani oyo na contexte socio-politique ya ekolo, mingi-mingi nsima ya mbongwana ya maponami ya Mokambi ya ekolo, episkopo ya Kumba alobaki ‘te: Eklezya ya katoliko na Cameroun etikalà kozala nye tè ata mokolo moko liboso lya mikakatano ya ekolo. Na nzela ya misala mya bango mpo na bolamu ya bato mpe mpo na kosalisa bato, mpe na nzela ya maloba ma bango ya esakweli, baepiskopo bazali kokoba kongengisa nzela ya kimya, ya bomengo mpe ya bokóli ya bato banso.
Tozali bato bamopelengano (politiki) te. Biso baepiskopo, tolobaka lokola bakengeli mpata mpe basakoli. Episkopo moko te akoyebisa bino nani bokoki kopono. Na eleko ya maponomi, topesaka mibeko mpe malako mpo na kosalisa bato bapona mokambi oyo abongi. Tozali kotuna makanisi ya bato, mpo ‘te bato ya mboka bázwa ekateli to mokano ya malamu. Na yango, tokoki te kozala na ngambo moko, mpamba tè lokola tozali bakengeli mpata, tozali na bandimi oyo bazali na ngambo moko to mosusu ya politiki. Tozali awa mpo na kokamba bango nyonso, mpe esuki wana!
Elembo ya elikya mp ona etuka etungisami na mpasi
Diocèse ya Kumba esalemaki na pontificat ya Pape François, o mokolo mwa 15 ya sànzà ya Marsi ya mbù 2016, na démembrement ya diocèse ya Buéa. Na yango, ekosepela na mbul’oyo, mibù zomi (10 ans) ya botongi bwa yango. Diocèse yango ezali na ba départements ya Meme, Ndian mpe Kupe Manengumba, na etukà ya Sudi-Westi ya Cameroun. Mpo namotuna basalaki baye bayiké bafandi na mboka, bayanolaki ‘te: kozala ya baepiskopo na engumba ezali Nsango ya elikia mpe ya kozala pene na bango, na eleko oyo ya mikakatano ya kimya, bomoko mpe ya bokóli. Ezali elembo ya Elikya mpo na enguba eye etungisamina mpasi
Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.