Bomoko bwa bakristu, «esaleli ya boboto»
Bansango ya Vatikan
Mgr Gintaras Grušas, mokambi ya CCEE, abengaki bakambi ya ba episkopo ya mikili ya Poto, na bokutani bwa sika oyo esalemaki na Roma na mokolo mwa 5 Novrmbe 2025, mpo na kotya mokoloto na mokanda ya boyokani mpo na makambo ya eklezya. Ezali ebandela ya eleko ya kozwua mokanda mona o kati ya Eropa mobimba.
“Losambo ekotikala se molimo ya ba movema nyonso ya ekimenisme (UR, 8) mpe yango ezwaka limonisi ya makasi na eleko ya limwambe ya mobu ya losambo mpo na bomoko ya bakristu”, elobi Mgr Grušas na mokanda mwa ye. Alobaki ‘te bomoko kati na baye babatisami kati na Kristu, ezali lelomei esaleli ya nguya mpo na kimya kati na mokili mobimba.
Mibù tuku mibale na mitano (25 ans) ya mokoloto mwa yambo ya Mokanda ya liboso oyo esangisaki bandimi ya mangomba ndenge na ndenge
Mbela eye epesami na libaku lya bokundoli bwa mibu tuku mibale na mitano 25 ya bokomi ya mokanda ya yambo ya lisanga ya bandimi, na mokolo mwa 22 ya sanza ya minei ya mobu 2001, na engumba Strasbourg. Na eleko eye mokili mobimba ezali na likama monene mpo na kimya, na bitumba ya minduki mpe bokobi ya matata na makambo ya politiki. Liboso lya ezalela eye, baeklezya ebyangemi mpo na kozongela na makasi mpenza, libyangi ya losambo mpo ‘te bomoko ekóla bobele kati na bakristu mpamba te, kasi ekóma mpe nkisi ya kozongisa boyokani kati na bato mpe kati na biteni biye bizali na matata.
“Losambo liye ya yambo ya lisanga mpe koyamba mokanda ya sika ya boyokani kati na mangomba, esukisaki mokambi ya CCEE epesami na lisungi ya Mwa-Esengo Ngondo Maria, Mama wa Eropa, mpe basantu babateli ya Pótó”.
Libyangi mpo na mokano mwa sika kati na masolo, kati na baeklezya ya bakristu ya mabele ya mikili ya Eropa
Mokanda mwa sika ya boyokani mpo na makambo matali bondeko kati na eklezya (mangomba) na lopoto babengi yango “Charte œcuménique ajournée” ezali likambo ya ntina mingi na nzela ya bondeko kati na mangomba (eklezya) na Mpótó. Mbula ntuku mibale na mitano na nsima, mokanda mwango mozali kaka na ntina mingi mpo na kolendisa masolo, boyokani mpe litatoli ya mangomba ya bakristu na mikili mya Eropa mobimba. Mosala ya kotalela lisusu mokanda mona mosalemaki na lisalisi lya komite ya EECC ná oyo ya Eklezya ya Katoliko na Poto (ECC).
Mangomba mabyangami bobele sikawa na boyambi ya bozindo mpe oyo ekobotaka mbuma malamu ya mokanda ya mibeko, oyo ezali komonana na bomipesi ya sika na losambo ya lisanga, na masolo ya Eklezia, na ba formation mpe na bokaboli litatoli, na bisika ndenge na ndenge ya lingomba mpe ya bato.
Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.