Sant’Egidio: Eyenga ya Mbotama elongo na babola, mesa mpo na banso
Albys KBD CP - Kinshasa/RDC
O mokolo mwa 25 ya sànzà ya Desembe, mokolo mwa Mbotama ya Yezu, bato nkoto tuku mwambe (80 000) ya mboka Italie mpe bato nkoto nkama mibale na tuku mitano (250 000) o kati ya mokili, basanganaki o meza mpo ya kosepela mokolo monzenga ya mobù. Bandeko ba motema malamu basalisaki bato baye bazangá ndako, mibange oyo bafandaka bango moko, mabota mazali na bosenga, mpe bato baye bakimá mboka, oyo bafandaka na Italie. Banso bazalaki na esengo, atako baùti bisika bikeseni mpe makambo ya mpasi baùti koleka. Na Roma, lokola momeseno, mbula na mbula to mibu na mibù, lingomba lya Saint’Egidio apesaka bango libakù ya kozala na esengo ya mbotama ya Mokonzi, o kati ya Ndakonzambe monene Sainte-Marie-du-Trastevere.
Ut’o mobù 1982, bato bazali se kobakisama
Na kimya nyonso mpe na esengo ya feti, bakabola bakado oyo babongisaki mpo na moto na moto. Kati na bato oyo bayaki kolya na midi, ezalaki mpe na baye babikaki na likama esalemaki na Gaza. Basololaki mwa mingi, batango pene ya ngonga mibale. Baliyaki: lasagne, bambwengi, mpe ba gato panettone. Mesa manà mafungwamaki mp ona mbala ya yambo na 1982, na ndako-nzambe Sainte-Marie-du-Trastevere, mpe banda wana, mesa yango epalangani na bisika ndenge na ndenge na mokili.
Se na mopanzi ya baye bazali na mpasi
“Na Eyenga eye ya Mbotama”, elobaki mobandisi ya Sant’Egidio, Andrea Riccardi, oyo azalaki na limpati ya midi, “moto moko te azali oyo ayebani te, kasi moto nyonso ayebani, na libota oyo ebosanaka moto te”. Mpo na baoyo bazangi mongongo, mpo na baoyo bazangi ndako, kozala elongo awa ezali kopesa elikya mpe ezali nsango ya kimya oyo mokili ezali na yango mposa lelo.
Lokola mokambi ya Sant’Egidio, Marco Impagliazzo, alobaki, “mokolo moye ekokani na mikolo minso ya mbula oyo Sant’Egidio ezalaka pembeni ya bato oyo bazali na mikakatano, baoyo bafandi na balabala, kasi mpe baoyo bauti mosika mpe bazali na mposa ya koyamba bango mpe kosalisa bango”.
Moto na moto azali na lisolo na ye
Kati na bato mingi oyo Marco Gnavi, sango-Mokonzi ya ndako-nzambe ena, abengisaki, Sofia, mwasi moko ya mbula tuku libwa na mibale (92), ut’o mibù tuku misato (30 ans) ayanganaka na limpati ya Noele. Atatolaki “bolingo bato ya lingomba liye bazali na yango”. To pe Nidal, mwana moke oyo aùtaki na Gaza, ayekolaki loyembo moko ya Gianni Rodari na motó mpe azalaki kozongela yango na motema mobimba. Bato mosusu oyo bautaki na mikili oyo bitumba ezali mingi bazalaki mpe na likita yango. Na kati na bango, tozali na bato oyo bautaki na bikólo lokola Soudan, Somalie mpe Afghanistan, bato oyo bazangaki ndako kasi bakómi sik’oyo na bandako, mpe Anoir, oyo autaki na Maroc mpe azwá kala mingi te kasi azwi nationalité ya Italie.
Sango Gnavi asukisaki na koloba ‘te: “Elongo, tosepeli feti ya Noele mpamba te, kasi tosali ‘te bato banso bázala na bomoi ya esengo na mikolo mikoya, engumba ezala na bato mingi mpe bomoi etonda na bandoto”. Bilei binso ya Sant’Egidio ezali kosalema na lisungi ya bato basalaka ya ofele to ba bavolontaire mpe na nimero ya lisungi 45586 (ezali kosala kino lelo, 27 sanza ya zomi na mibale). Makambo mingi mpe mabongisami mpo na mikolo mizali koya, na eleko mobimba ya Noele, na kokabola bilei mpe makabo to bakado. Bakopesa yango n abato na boloko. Ebingisami o mokolo mwa mitano 26 ya sanza ya zomi na mibale, mokolo ya feti ya Saint-Étienne, na boloko ya Rebibbia mpe ya Regina Caeli na Rome.
Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye