Ugandan: Basoda na tango ya liyangani moko ya mopelengano ya Uganda na Kampal, Mboka-Mokonzi ya mboka. Ugandan: Basoda na tango ya liyangani moko ya mopelengano ya Uganda na Kampal, Mboka-Mokonzi ya mboka. 

Ouganda : Bakangi sàngo ya dioseze ya Masaka

Lisanga ya ba avocats ya kala ya baKristu ya Ouganda bakweisi bokangami ya Sango Deusdedit Ssekabira, sango ya dioseze ya Masaka, oyo alimwe kobanda mokolo mwa 3 ya sanza ya zomi na mibale ( Desembe). Balobi ‘te «ekokani na mobeko ya mboka te».

Albys KBD, CP – Kinshasa/RDC

 

Mposo mibale nsima ya kolimwa ya Sango Ssekabira, ya dioseze ya Masaka, ministre ya défense ya Ouganda andimaki na liyebisi moko ebimaki na mokolo mwa 14 sanza ya zomi na mibale ‘te ba forces ya securité bapalelaki sango yango mpo azalaki kokota na ba «activités violentes et subversives oyo ezali kobundisa leta». Nzokande, bato oyo babatelaka ntomo ya bato bazali koloba mabe mpo na ndenge bakangaki ye. Lisanga ya ba avocats ya Katoliko ya Ouganda (UCLS), lisanga ya ba avocats ya katoliko mpo na lotomo ya bato, amonisi bobangi bwa ye makasi mpe apameli lolenge bakangaki Sango Ssekabira, oyo emonisami lokola «ezali na boyokani te nà mibeko ya mboka mpe ezali kotosa te lotomo ya moto».

Kolimwa na makasi mpe kobuka mibeko ya mboka

Engebene UCLS, Sango Ssekabira akangamaki na «bato bamandoki oyo bayebani te, na kati ya motuka oyo ezalaki na mikanda te, mpe bakangaki ye na esika moko oyo eyebanaki te na boumeli ya mikolo zomi». Na tango wana, libota na ye, dioseze na ye, mpe ba avocats ba ye, bakokaki te koyeba esika azalaki. Ezali likambo oyo ekokani na «kolimwisa na makasi oyo ezali kobuka mibeko ya Ouganda mpe mibeko ya lotomo la bato na mokili mobimba». Na yango, bakundoli ‘te, engebene na mibeko ya 1995 ya mboka Ouganda, moto nyonso oyo akangami asengeli komemama liboso lya esambiselo to tribinali  kati na ngonga tuku minei na mwambé (48h), to asengeli kobimisa ye na boloko, na lisalisi lya lifuti lya bonsomi.

Kokokisa lotomo la moto

Na kokoba, basangani ya lisanga balobi ‘te « mbeba ya misala ya botomboki ezali te kopekisa mibeko ya mboka, mpe makama oyo ekoki koyela bokengi ekoki te kopesa nzela na bokangami, kobombama to koboya kosamba na lolenge elongobani ». Na yango, UCLS esengi na bakonzi bayeba likambo oyo malamu mpe bakokisa lotomo ya kotosa bosembo yamibeko.

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye

 

20 sánzá ya zómi na míbalé 2025, 10:52