Na Rwanda, Zubile ya Nsango-Elamu ekosuka o mokolo moye mwa poso
Albys KBD, CP – Kinshasa/RDC
Bato pene na nkoto tuku minei (40 000) bazali kozelisama na stade Amahoro na Kigali na mokolo mwa samedi mpo na misa ya nsuka ya mibu 125 ya Nsango Elamu na Rwanda. Zubile moye mozalaki libaku ya kotala lolenge kani lingomba lizali kotambola mpe ndenge nini ezali kolendisa boyokani kati na mboka oyo ekutanaki na génocide na 1994. «Eleko eye ya bokundoli ezalaki ntango moko ya esengo, ya kozongisa matondi mpe ya kosenga bolimbisi epai ya Nzambe; likanisi lya sika mpo na diyoseze mokomoko na mikili libwa, mpo na kotia makanisi na koluka kimya mpe boyokani kati na bana banso ba mboka». Elobaki Tata Vedaste Kayisabe, Mokomeli monene (Secrétaire Général) ya Lisanga lya ba Episkopo (Conférence Episcopale) ya Rwanda.
Milulu mya mibu 125 ya bopalanganisi Nsango Elamu na Rwanda esalemaki na biteni mingi, kati na yango, Zubilé ya bilenge, ya Ukaristya, ya bonganganzambe, ya bomoi ba basantu, mpe lisusu zubilé ya libota mpe oyo ya balayiki. Na maloba ma Mokomeli Monene ya Lisanga lya ba Episkopo ba Rwanda, azali na elikya makasi ‘te na suka ya zubilé oyo «tokozala na Rwanda oyo ezali na mokano makasi ya kozongisa boyokani mpe Eklezia oyo ezali komipesa mingi na mosala na yango ya koteya kimya mpe kozongisa boyokani».
Elikya ya kozala na boboto bwa solo
Na yango, misa ya bosukisi na mokolo mwa poso mwa 6 desembe oyo ekokambama na Cardinal Antoine Kambanda, episkopo ya Kigali mpe mokambi ya lisanga lya ba episkopo, ekosangisa makasi manso ya Eklezia na Rwanda, mpe ekomona bosangani lya baepiskopo bya bikólo biye bizali pembeni, na ndakisa Républiki démokratiki ya Congo, Burundi, Tanzanie mpe Ouganda. Mpo na Sango Kayisabe, Ukaristya ena ekozala libaku mosusu ya “kobondela elongo mpo na kimya na etuka ya bitima binene (Grands Lacs), mingimingi na ngambo ya Moniele (Esti) ya Republiki Democratiki ya Congo”.
Ekolo Congo ya Esti, oyo ezali na nkita to bozwi mingi mpe ezali na mindelo ya Rwanda, eza na bitumba kobanda mbula ntuku misato, mpe mobulu ekomi makasi na kozonga ya ba “Mouvement ya 23 Marsi” (M23) na nsuka ya mobù 2021. Etumba ekomaki makasi na suka ya sanza ya Yanuali 2025, na bokamati ya bingumba minene ya : Goma, mpe Bukavu, na ba M23, oyo, engebene na ONU, ezalaki na nse ya bokonzi bwa Rwanda. Boyokani ya kimya etyamaki mokoloto na bakambi ya Congo mpe ya Rwanda, mokolo mwa minei, le 4 desembe na Washington liboso lya mokonzi ya Etats-Unis Donald Trump.
Ntina ya boyokani bona ezali ‘te mpo kimya ezonga okati ya mabele ma RD Congo, na ngambo ya moniele mwa yango. Eloko mosusu ezali ‘te, mindelo ya mabele kati na Rwanda nà Burundi ekangami banda sanza ya Yanuali 2024. Burundi ezwaki ekateli to mokano mona mpo na kobakisama ya matata”. “Kasi atako makambo manso ya matata ezali kati na bikolo na biso, tozali kaka na elikya”. Nzambe azali na biso mpe nsambo ya biso makozanga te kokokisama. “Nzambe akopesa biso kimya ya solo, oyo ekouta se epai na ye, mpo na etuka na biso ya bitima binene”, elobaki Nganga-nzambe ya Rwanda.
Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye