Biyenga ya Mbotama ezingi lisusu milulu na Beteleme
Albys KBD, CP – Kinshasa/RDC
Biyenga to bafeti ya Noele ezongi lisusu na mboka ya Mokonzi ya boboto. Nsima ya mbula mibale oyo baboyaki kosepela Mbotama ya Noele, bakambi ya Bethléem bazongisaki miinda, na ndakisa ya nzete ya sapin na bango ya monene na Place ya Mangeoire liboso ya ndako-nzambe ya Nativité. Nzete yango ezali na molai ya metele ntuku mibale mpe na likoló na yango ezali na monzoto moko ya motane. Na mpokwa ya mokolo ya samedi, 6 Desembe, nzeté ya sapin yango engengisamaki na miso mya mokambi-molandi ya lingomba ya Latin na Yéruzaleme mpe Palestine, Mgr William Shomali, mpe mokambi ya engumba.
Kokabola nsango ya Beteleme oyo ekoki kobebisama te
“Mbula mibale miye miùti koleka, ezalaki ya mpasi mpenza: Noele ezalaki te, mosala te, eloko te”, elobaki Maher Canawati na likita lya bapanzi-nsango na mokolo mwa misato. Mokonzi ya engumba ya Beteleme akutanaki na Pàpa Léon XIV na mokolo mwa 24 ya sanza ya libwa oyo eleki, na Roma mpo na ko lakisa ye ntina ya ezalela ya bakristu ya Palestine oyo bazali konyokwama na mnyoko ya bakoloni na Cisjordanie. Na poso moye, mokonzi ya engumba epai wapi ba mizilma bazali mingi, andimaki ‘te likanisi ya kozongela milulu mya Noele ezangaki mikakatano te, tembe te mpasi ezali kokoba na Gaza - ata mpe mpo na bandimi ya mwa lingomba na ye ya bakristu, mingi na bango bazali na bandeko na bango na Beteleme, kasi alingaki kozongela milulu mpo na kotinda elembo ya elikia.
“Bosangana na biso mpo ya kosepela elikya, bosambela mp ona boboto mpe bokabola na mokili mobimba nsango ya Beteleme oyo ekoki kobebisama te: mwinda moleki molili na makasi mpe bolingo eleki bobangi na makasi”, ezali wana mbela ya oyo epesamaki na nzela ya bilili, na lokota ya lingelesi, na sanza ya Novembe moleki. Binguma ya pembeni, Beit Jala mpe Beit Sahour esengeli mpe kopelisa banzete na bango ya Noele na mikolo mizali koya.
Kozongisama ya ntina ya mibembo ya losambo
Makambo ya mombongo to ya nkita mpe kokangama ya mibembo ya losambo na mibu mibale mileki mizali kaka kopesa mpasi na etuka. Patriarche ya Latin ya Yeruzaleme asengi na bakristu bázonga mobembo na Mokili Mosantu. “Sikawa esengeli kobanda eteni ya sika, epai lisungi ya solo emonisami mpe na bozali na nzoto. Ezali litomba kaka mpo na baye bazwi libaku ya kosala mobembo mpamba te, kasi, ekomema mpe koseka na mabota mingi mizali na mposa ya lisungi lya mbongo te, kasi lisusu ya komona bandeko ba bango ya mibali mpe ya basi na Mokili Mosantu”. Elobaki episkopo wa lokumu Pierbattista Pizzaballa na Radio Vatican-Vatikan News o mokolo mwa 19 Novembe. Na nsuka ya mobu ya Yubile, esengeli kotala bobele Roma te, kasi mpe Yeruzaleme mpe Mokili Mosantu, oyo ezali na boyokani makasi kati na yango.
Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.