Baeklezya ya Yeruzaleme babwaki mbela mpo na Noele
Albys KBD, CP – Kinshasa/RDC
Na Moyen-Orient, epai bitumba ezali naino mpe kimya ezali te, bapatriarches mpe bakonzi ya mangomba ya Yeruzaleme babimisaki nsango na bango ya Noele mpo na bato banso. Balobaki lisusu ‘te kimya esengeli kosuka kaka te na kotika bitumba, kasi esengeli kosuka na bosembo, kozongisa boyokani mpe kotosa lotomo ya bato.
Na ebandeli ya makomi ma bango, batángi mokanda ona Baebré « bazingamaki na banzeneneke bayikén, tópota mbangu na mpiko inso na momekano ya mbangu oyo etyami liboso lya biso, tótya miso na Yesu», bakambi ya lingomba ya bakristu balendisi bandimi na bango bázala ntango inso na elikya, ata na tango ya mpasi makasi.
Beteleme, elembo ya elikya mpo na mokili moye mozoki
Na kati ya nsango yango, ezali na ndimbola ya kobotama ya Kristu na nzoto ya bomoto na Beteleme, oyo elobelami lokola elembo ya elikya ebotami o kati ya botàwu bwa bato. Ndenge moko na babateli mpate na butu ya Noele, nsango ya Biblia ezali mpe kolendisa biso ‘te tóbanga te mpe tólembe nzoto te.
Kotika bobete masasi elimboli tè kotiya kimya.
Atako basepelaki na boyokani oyo epesaki nzela na mangomba mingi ya kosala milulu na bonsomi nyonso, bakonzi ya mangomba bakebisaki na likama ya «kimya ya lokuta» mpe bakundwelaki maloba ya mosakoli Yeremia: «Kimya, kimya, nzokande kimya ezali te». Na nsango yango, balobi ‘te atako bitumba esili, mobulu, bato bazali kokufa mpe bonsomi ya bato ezali kaka kobebisama na Mabele Masantu mpe na bamboka ya pembeni.
Likanisi mpo ya baye bazali konyokwama
Bakambi ya mangomba bazali kolakisa bondeko ba bango na bato banso bazali konyokwama na bitumba mpe bazali kosenga na bakristu mpe bato banso ya motema malamu,’te batika mabondeli to losambo te. Bamipesa mpe mpo na kimya ya solo mpe ya libela. Nsango yango esuki na maloba ya kopesa mbote ya Noele na bato ya mboka mpe na bakristu ya mokili mobimba, na elikya ‘te kobotama ya Yesu na Beteleme ekotinda bato bázongisa boyokani mpe bosembo.
Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye