Luka

2019.04.25. Mgr Gervas Nyaisonga, Episkopo-Mokonzi ya Mbeya, na Tanzanie. 2019.04.25. Mgr Gervas Nyaisonga, Episkopo-Mokonzi ya Mbeya, na Tanzanie.  

Tanzanie: yoko misa mpo ya bato pazwaki likàmà na mobulu mya maponomi.

Diosezi-Mokonzi ya Mbeya asengi na ba paroisse, ba institutions ya Eklezia mpe bandimi ya Katoliko ‘te basalela mokolo mwa lomingo la 9 ya sànzà ya zomi na moko na losambo ya ntina mpo na bato bazwaki likàmà mpe ba bakufaki na mobulu oyo eyaki nsima ya maponami, mpe mpo na baye bazokaki kasi bazwi naino lobiko te.

Albys KBD, CP – Kinshasa/RDC

 

Kati na mokanda moko bakomà na lokótá ya Swahili, Tata Henry Mwalyenga, Chancelier ya Archidiosezi, alobaki ‘te na mokolo mwa losambo lonà, esengeli kozala na elimo ya kondima, ya bomoko mpe ya bolingo. O mokolo mwa lomingo la 9 sanza ya zomi na moko, “ba paloase binso ya Archidiocèse ya Mbeya, basengami na kobongisa ntango ya losambo mpo na bandeko ba biso ya mibali mpe ya basi, baye bakufi, mpe mpo na baye bazoki, na maponami mwa mokolo mwa 29 sanza ya zomi ya mobu 2025”, elobi Tata Mwalyenga na mokanda mwa ye.

Mobulu moko, lokola lisalemà nayino te

Tanzania ezali kaka na somo ya mobulu moye mobandaki nsima ya maponomi na lolenge esalemá naino te. Bakonzi bazali kotuna mituna mpo na motuya ya bato oyo bakufaki na bitumba oyo esalemaki na ntango ya bokutani mpe mobulu oyo bakonzi ya bokengi bazalaki kobundisa.

Chadema, lingomba ya liboso ya opposition, elobaki ‘te monkama ya bato bakufaki to mpe babungisaki bomoi bwa bango. Na kolanda mitango ya bakonzi, Mokambi mwasi Samia Suluhu Hassan, oyo azali na bokonzi kobanda mobu 2021 nsima ya liwa ya mokitani na ye, azwaki koleka 97% ya maponami.

Baye bazalaki bambanda ba ye ya liboso, Tundu Lissu (Chadema) mpe Luhaga Mpina (ACT-Wazalendo), bazwaki ndingisa te ya koponama. Mpamba te, ezali ngonga ya «boopekisami» na ba organisations mingi ya lotomo la bato. Amnesty International eyebisi mpe makambo ya kobungisama ya bato na makasi, kokangisama ya bato na makasi mpe koboma bato kozanga kosambisa bang ona bazuzi.

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.

08 sánzá ya zómi na mɔ̌kɔ́ 2025, 11:47