Luka

RDC : Mgr Muteba alendisi na Masolo oyo ezali na elimo ya bosangani

Kimya na République démocratiki ya Congo ezwami naino te. Makambo ya mopelengano mpe ya bomoi ya bato ezali se kobebisama. Mgr Fulgence Muteba, episkopo-mokonzi ya Lubumbashi mpe mokambi ya Lisanga ya ba episkopo ya ekolo ya Congo (CENCO), asengi “lisolo ya banso, moto moko te azanga” mpe alobeli mokumba ya Eklezia mpo na kolonga mikakatano mya kofanda elongo mpe boboto (kimya).

Albys KBD, CP – Kinshasa/RDC

 

Mokambi ya CENCO akanisi ‘te o kati ya synode nde masolo ezwami. Lisolo oyo ezali kosenga “koyoka, kotuna, kosala elongo, kokela kati ya lisanga ya bakambi”. Alobi ‘te ezali kaka nguya wana nde ezali kopusa eklezya na komipesa na koluka kimya to boboto na Congo démocratiki mpe na etuka ya ba bisanga binene (Region des Grands Lacs). Alimboli ‘te na nzela ya likanisi linà, Cenco elongo na ECC (eklezya ya Kristu na Congo), ezali komeme molongo ya masolo asalaki mpe ya bokutani oyo ememaki na kosala nzela ya boyokani. Alobi ‘te yango ezali likambo ya mopelengano te, kasi ezali nde mokumba ya babateli mpate.

Makambo ma solo masengeli kosalema bisika masano ezali koleka

Atako alendisi misala ya diplomatie oyo esalemaki na Doha, na Washington mpe na Paris, mokonzi episkopo ya Lubumbashi alobi ‘te makambo ma solo mpo na kimya ekota na Congo, esengeli kosalema na mabele epai wapi masano manà mazali koleka.

“Ezali sé ba Congolais bango moko, nde basengeli kofanda na mesa, na bosembo mpe na bosolo, mpo na kotonga kimya ya libela”

““Ezali sé ba Congolais bango moko, nde basengeli kofanda na mesa, na bosembo mpe na bosolo, mpo na kotonga kimya ya libela””

Bongo, mpo ‘te kimya ekóma likambo ya solo, asengi na Mokambi ya ekolo ‘te “asala makambo ya Leta” oyo ekomami na mokanda ya bakonzi ya eklezya (la feuille de route des responsables des confessions religieuses).

Bozangi koyoka oyo ezali na makama minene

Atako mikakatano mizali kati na mwango mwa kimya na mboka na ye, Mgr Muteba aboyi kolemba nzoto: “Elikya ezali eteni ya bomoto bwa biso ya Bakristu. Atako tozali kobunda mpe tozali kokweya, nsukansuka tokotonga kimya yango elongo”. Kasi azali kolela mpo na “ntango mpe bomoi ya bato” oyo ezali kobunga mpo “te bato bazali koyoka te mpe bazali na boyokani te na makambo ya mopelengano (politiki). Engebene na yé, kimya ya solo ekoki te kosuka kaka na kotika bitumba: kasi “Esengeli kozala bomoko na ekólo, kosalisana mpe kotosa lotomo lya bato”. Na koboya kimya ya mwa ntango moke, mokambi ya baepiskopo ya Congo azali kosenga kimya ya libela, “oyo esimbami na bosolo mpe na bosembo”.

Synodalité: Koteya mpe kopesa mikumba mpo na eklezya ya mpwasa

Na mokanda mosusu, Mgr Muteba alobeli likambo moko ya kati ya bomoi ya Eklezia oyo etali mateya mpe boyangeli malamu. “Eklezya ezali ebongiseli moko boye te. Esengeli koyeba yango, koyeba lisolo na yango mpe mibeko mya yango”. Akebisi mpo na bokeseni oyo ekoki kobima soki synodalité eyokani te na mateya ya makasi ya Eklezia. Abeti nsete mp ona likambo ya kozala na bososoli mpe kopesa biyano lokola lotomo lya Nsango Elamu.

 “Synode eyebisi biso ‘te bososoli mpe kopesa biyano ezali likambo ya kopona te: ekomi nde mokumba ya babateli mpate”

““Synode eyebisi biso ‘te bososoli mpe kopesa biyano ezali likambo ya kopona te: ekomi nde mokumba ya babateli mpate””

Na makanisi ma ye, kondima ezalela wana ya kozwa mokumba ekolendisa elikya ya basangani ya eklezya mpe ya baninga, mpe ekopesa nzela na mosala mwa Nzambe mpo ‘te ekende liboso na kimya inso.

 “Nazali kozela basungi ba biso ya bobateli mpata bakotisa ezalela oyo ya sika, mpo ‘te tokoka kobuka mbuma na yango”

““Nazali kozela basungi ba biso ya bobateli mpata bakotisa ezalela oyo ya sika, mpo ‘te tokoka kobuka mbuma na yango””

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.

 

04 sánzá ya zómi na mɔ̌kɔ́ 2025, 11:25