Na Taybeh, mbuma na bilanga eboti malamu te, bazali kobundisa bato bavandi kuna lisusu.
Albys KBD, CP – Kinshasa/RDC
Bakolon babebisi bandako, mituka, bilanga mpe etumbami, mobulu mpe bitumba ya ba colonies ya Israël ezali kokoba na Cisjordanie. Bato ya Taybeh, mboka oyo ezali na ntaka ya mwa bakilometele na nordi ya Yeruzalema mpe na Esti ya Ramallah, bazali mpe konyokwama. “Mikolo miye miuti koleka, batomboki babundisaki biso lisusu”, elobaki sango Bashar Fawadleh, autaki na mwa mboka moko pene na Ramallah mpe azali sango ya lingomba ya Latin na Taybeh kobanda 2021. Engumba eye eyebani lokola mboka ya nsuka ya Palestina oyo etondi na bakristu, bato soki nkóto moko, mpe ezali na bandakonzambe misato: Eklezya ya Ortodokse, Eklezya ya Ba-Melkite, mpe Eklezya ya Latin.
Mobulu ezali kokoba
«Batomboki babebisaki ndako moko ya parwasi mpe ndako ya moto moko ya parwasi», mpe babebisaki mituka mibale oyo ezalaki liboso ya lopango. “Babukaki bapine, maninisa ya bandako, maninisa - nyonso wana”, nganga-nzambe alobaki yango. Mpo na mbala ya mibale na mikolo mibale, esika oyo batyaka esansi ebebisamaki mpe bayibaki biloko binso”. “Misala miye ya mobulu mpe ya kobebisa biloko ezali malamu te mpe esengeli ‘te bato ba Israel bakweisa yango makasi”. Eleki mwa mikolo, Premier Ministre ya Israël akweisaki bitumba oyo esalemaki mokolo mwa yambo na mboka moko ya Cisjordanie na ba tomboki. Abengaki mosala monà: “likofi lya ba estremiste”. Maloba oyo, engebene sango Fawadleh, “ezali na kilo mingi” mpo ezali elembo mosusu na esika ya “ezali kosalema na Cisjordanie ezali mpenza mbebà mpenza”. Na yango, maloba maye emonani lokola elembo ekotinda mokili mobimba mpo na kosukisa mobulu moye “ekoki kondimama te”.
Eleko eye mbum aya bilanga eboti malamu te
Bituma ya ba-Israel ekobaki koleka, sima ya mokolo mwa 7 ya okotobe 2023, mingi mpenza na ebandela ya eleko eye babukaka mbuma ya bilanga. Mpo na koloba solo, na etuka yango, bato mingi ya Palestine basengeli kosala mobembo molayi mpo na kokóma na mabelé epai wapi balonaka mpe ntango eleko ya kobuka mbuma ekoki. Kasi bazali ntango inso kozwama na nzela mpe na mobulu. Mombongo ya mafuta na Palestine ezali ya kala, kasi na mobu moye, mpo mbula enokaki te mpe na mpo ya bitumba ya ba colons, mombongo monà ekoki kokita makasi, elobi Arij, analyse ya ONG moko ya Palestina. “Oyo ezali bongo mbula ya misato oyo wapi tozali te na likoki ya kokende na bilanga ba biso ya olive”, elimboli Sango-Mokonzi ya Taybeh, oyo nkita esimbami mingi na mosala ya kosala mafuta ya olive.
Tango moko ya bobangi
Bomoi bwa mokolo na mokolo na Taybeh “epesami na mibeko ndenge na ndenge ya bopekisami. Basoda bazali kokanga banzela mpe kopekisa boleki ya bato”. Bongo bitumba oyo ezali kosalema mbala na mbala, ezali kobakisa bobangi kati na bato, oyo bakomi na nsuka ya nkanda. “Nsima ya bitumba mingi ya ba colons, kaka na Taybeh te, kasi mpe na etuka oyo ezali na ngambo ya Moniele (Esti) ya Ramallah, bato mingi bazali kokanisa kokende na mboka mopaya, kotika mboka mpamba te ezali na libateli te”.
Na sanza ya Yuli euti koleka, mangomba mpe bibongiseli mosusu ya Leta emonisaki ‘te bazali na ngámbo ya bato ya Taybeh. Bakonzi mibale ya lingomba mpe bamonisi mosusu ya mangomba ya babkristu ya Terre Sainte, elongo na batindami ya bakonzi ya Leta, bakendeki na mobembo tee na esika yango (une visite sur place,), bazali kosenga kimya to boboto n ana bamboka ya Taybeh et la Cisjordanie . “Ezalaki elembo ya bomoko mpe ya bondeko”, elobaki sango Fawadleh.
Elikya mpo na Taybeh
O tango eye yam pasi, ezali na ntina mingi “kobondela ntango inso”, elobaki Sango-Mokonzi, “mpamba te, losambo ekoki kosala makamwisi mpe kobongola bato, ekoki kobongola makambo maye” mpo na malamu mpe komema na kimia (boboto). Kasi esengeli kobosana te kokoba kosunga lingomba ya Taybeh, parwase moke, oyo ezali kobika na lisalisi ya Patriarche ya Latin ya Yeruzaleme. Mokano mwa sika ezali ya kofungola misala mya sika mpo na komemela mabota ma sika bomengo mpe mbongo, mpe mpo na kozwa mbongo mpo na kotonga bandako. Tosengeli kobungisa elikya te. Na esika ya kobanga bitumba ya ba colons, Eklezya esengeli “kobimisa to kokolisa elikya”, mp ona kondima ‘te bomoi bwa biso ekokoma na kimya mpe libateli ekoki kosalema.
Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye