Luka

Bartholomée Ier, Patriarche œcuméniki ya Constantinople, na Athènes na Grèce, o mokolo mwa 8 mayi 2025.. Bartholomée Ier, Patriarche œcuméniki ya Constantinople, na Athènes na Grèce, o mokolo mwa 8 mayi 2025..  (ANSA)

Na Lourdes, Patriarche Bartholomée alobi liboso lya baepiskopo ya France

Mpo na libakù lya mibu 1700 ya likita ya Nicée, kati na mwa baposo oyo ezali koya, Patriarche ya Constantinople akoyamba Pape Léon XIV na Istanbul, mpe akosambela elongo na ye na esika ya kala ya Nicée. Kasi yambo, alobaki o mokolo mwa 4 Novembre, mokolo mwa yambo ya lisanga ya baepiskopo ya France na Lourdes. Liboso lya bango, na mboka ya Maria, Bartholomée Ier alobelaki likambo lya bampota ya mokili, mpe libiki ba Katoliko elongo nà ba Ortodokse bakomema

Albys KBD, CP-Kinshasa/RDC

 

Lokola ezalaki koloba moto azalaki liboso la ye, Athénagoras ‘te: “Lisangá ekoya. Ekozala likamwisi, likamwisi mosusu o kati ya lisolo ya bato. Tosengeli komilengele mpo na yango”. Na elikya wana, Bartholomée, sima ya mibù tukù misato (30 ans) azwi maloba na liyangani monene ya ba episkopo ya France, oyo esalemaki na sanctuaire ya Santu Bernadette. Alobaki mpo ya boni boni mabele mabongwani na boùmeli bwa lotukà misato mya mibù mileki. Azali kolela mpo na bokabwani ya mpasi: “Eklezya ekimá na bisika na yango ya bosantu, science na balaboratoire na yango, moko na moko azali kotyela mosusu motema te”.   

Kozongela koluka ezalela ya bomoko mpe kitoko ya bomoi

Mokonzi ya lingomba ya Ortodokse ya Grèce alimboli ‘te bokabwani wana ezalaki mokano mwa Nzambe te, mpe apesi mwa bandakisa: «tango bato ya science bazali kotala lolenge oyo ba glaciers ezali konyangwa mpe ntango tozali kokanisa ndenge oyo biloko oyo Nzambe akelá ezali kolela, tozali kotánga buku moko. Mpe kosenga ‘te, na mokili moye mokosala se makambo mbango mbango, mpe na koliya biloko, «tózongela makanisi ya kolunka nzela ya kati kati mpe ya bomoko. Ezalela malamu na esika ya motango, kitoko na esika ya ntina, boyokani na esika ya litomba». Ezali kozonga nsima te kasi nde kosikolama to kozwa bonsomi. “Bonsomi ya koyeba kotondo Nzambe na bomoi, na pete mpe na kimia ya motema”. Manso ekosalema soki to kozongisáká boyokani na “ teoloji ya kozala na boyokani” , elingi koloba ‘te kobikisama ya mabele esengeli koleka na nzela ya boyokani ya bato.

Na nsima, Bartholomée atunaki na ndako ya likita: “Tokozala libota liye lizali kopona bolamu na esika ya bososoli, to oyo epai wapi, esangani na boyambi, na boyebi mpe na bomoko, ekopona mbongwana na esika ya libebi?”.  Elikya ya mokili mwa biso etaleli eyano na motuna monà, eyano oyo, na maloba na ye, ezali kaka ya kobatela zamba te, kasi “ya elimo mpenza”. Na nsuka ya lisukulu na ye, maloba ya boyokani matángamaki na batindami ya mangomba ndenge na ndenge ya bakristu na France mpo ya COP30 ekosalema na Belém, na Brésil. Babengaki na “kobatela ekela mpo na kobikisa bomoto bwa biso”. Ezali bongo mbela na bomikitisi, bopeto, bondeko mpe elikya.

Bokutani bwa Pàpa Leon ya Zomi na minei nà métropolite Emmanuel ya Chalcédoine na tango ya symposium œcuménique mpo na mibù 1700 .
Bokutani bwa Pàpa Leon ya Zomi na minei nà métropolite Emmanuel ya Chalcédoine na tango ya symposium œcuménique mpo na mibù 1700 .   (@Vatican Media)

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.

 

05 sánzá ya zómi na mɔ̌kɔ́ 2025, 11:34