2025.11.07   Côte d'Ivoire: Misa ya bozongi mosala ya pastorali ya lingomba ya bakatoliko ya ekolo ya Côte d’Ivoire ya Roma mpe Latium, o mokolo mwa 2 novémbe 2025 2025.11.07 Côte d'Ivoire: Misa ya bozongi mosala ya pastorali ya lingomba ya bakatoliko ya ekolo ya Côte d’Ivoire ya Roma mpe Latium, o mokolo mwa 2 novémbe 2025  

Lingomba ya Katoliko ya Côte d’Ivoire ya Roma, esengi kozala na boyokani makasi

Fraternité Côte d’Ivoire ebongisaki misa ya bozongi mosala ya bonganganzambe mpo na lingomba ya katoliko mobimba ya Roma mpe ya Latium, o mokolo mwa lomingo 2 novémbe na ndako ya lingomba ya ba Pères Blancs na Roma. Ezalaki libaku mpo na Tata Yéo Joseph ya kobenga bandeko ba ye ya mboka na komipesa mingi mpo na kolonga mokakatano ya bondeko ya solo.

Albys KBD, CP- Kinshasa/RDC

 

Libaku lya bokutani na esengo mpe na losambo, sima ya mikolo mpe basànzo ya bopemi, lingommba ya bakatoloko ya ekolo ya Côte d’Ivoire oyo ezwami na Roma mpe na Latium, basanganaki bango na bango bandeko babali na basi, ba sàngo, ba nganganzambe, ba mamelo mpe nà baseminariste babango. Banso elongo nà ba Laiki ya bango, batondoki Nzambe botondi na lisalisi lya misa moko basalaki. Ambassadeur ya ekolo enà, oyo avandaka na Vatikan, azalaki mpe na milulu mina. Sàngo Yeo Joseph, oyo ba poni mpo ya mbala ya mibale mpo na kokamba lingomba liye ya Frat’Ivoire, to lisanga lya bana ya Côte d’Ivoire, ndé akambaki milulu mya Ukaristia to misa masanto.

Kozala na lisanga nà bondeko mpe bomoko

Abandaki na ndimbola ya liloba “communion” oyo elimboli na nkota ya lifalansa “union avec”, ‘te: “lisanga nà, to elongo nà”, Sàngo Yéo abengaki basangani ba Frat’Ivoire na bomoko. Sàngo ya Archidiocese ya Abidjan, na Côte d’Ivoire alobi boye: “Nalingi ‘te na mobu moye mwa sika mpe na boumeli bwa yango mobimba, tokoka kotombola liloba liye “communion”. Tolekisa okeseni ya ba nkota bwa biso, ya mposo ya nzoto, ya politiki mpe ya bomoi ya bato (...) tosengeli kozala na bomoko, tosengeli kozala libota lyoko”. Lolenge wana, Synodalite ekobotama o kati ya biso.

Mokambi ya Frat’Ivoire apesaki bandeko ba ye toli mpe alobi ‘te: “lelomei, tozali na kati ya mokili oyo bato mingi bazali kokanisa te liloba ya moyuya ezali – bokeseni - kasi mpo na biso tosengeli kozala bongo te”. Alendisi bango mpo ‘te “bàzala mosika te, tango baninga basusu bazali na esengo to bazali na mawa, bàboya zuwa mpe bokosi”. Tokima bokeseni, tomipesa mpo na bosangani bwa solo solo. Na elilingi ya Bosato Bosantu, tosala communion elembo ya bosolo ya bomoto na bango lokola “Bato ya Côte d’Ivoire mpe mingimingi lokola bana ba Nzambe”, elobaki Tata Yéo.

Basango basangani ya Frat'Ivoire
Basango basangani ya Frat'Ivoire

Bosangani ezali liziba lya libondi mpe ya makasi

Geneviève Kacou, oyo azali moko ya lingomba ya Katoliko ya Côte d’Ivoire na Roma mpe na Lazio, azali na esengo ya koyoka maloba maye. Mpamba ‘te, elobi ye, ezali na mpo ya bondeko wana nde lisanga yango ebotamaki na mobù1997. Mikano ya liboso ya lisangá na biso etalelaki mingi bizaleli ya bokristo lokola bondeko mpe boyokani. Na yango, tobyangami tózala bana ba ekólo moko, ya lingomba moko, oyo Kristo azali motó mwa yango. Geneviève akanisi ‘te mbela, ya kozala na bomoko, ekolendisa lisusu bomoi bwa biso elongo. Ezali na ntina mingi mpo na biso lokola basangani ya lisanga oyo, kolona bondeko mpe bomoko. Mpo na komonisa ‘te azalaki na mawa, bato ya mboka na ye bayaki kosunga ye ntango ndeko na ye akufaki. “Awa na zali mosika nà libota lya ngai ya mosuni, kozala elongo na bato ya mboka ebondisaki ngai mpe epesaki ngai makasi”. Elobaki yé.

Kolakisa na Yezu, bondeko toyembaka na loyembo la mboka na biso

Na miso ma Geneviève, “kozala mosika na mboka na biso, kozala na bondeko mpe na boyokani ezali na ntina mingi”.  “Longola bokeseni ya mposo, ya politiki to ya bomoi ya bato, tosengeli komonisa bondeko oyo eyembami na loyembo ya ekólo na biso Abidjan. Tozali kaka ba Ivoiriens, bana mibali mpe bana basi ya mboka moko, tobengami mpo na kolingana mpe kozala moko kati na Kristu.

Lokola Cote d’Ivoire ezali mboka oyo eyambaka bampaya malamu, tobatela botuya bwa ya kobengaka mbala mingi bandeko mibali mpe bandeko basi ya Afrika na misala na biso ekeseni”. Alobaki lisusu, mpe amonisaki ‘te na mokolo mwa lomingo 2 novembre 2025, na misa ya bozongi mosala ya Pastorali, basango mibale ya Togo mpe ya Brésil ya Congrégation ya ba sœurs Dorothée bazalaki wana elongo na bango. Tika ‘te Kristu apesa biso ngolu na ye ya ko vivrecommunio oyo, kati na ye, kati na biso ba Ivoiriens mpe ba Ivoiriennes mosika na mboka na biso, mingi mpenza na bomoko ontei ya mitema, ya kosambela ntango inso mpo na kimia, na Côte d’Ivoire; wana ezali losambo ya Geneviève Kacou.

Na elembo ya communion, mobu ya sika ya mosala ya pastorali 2025-2026 ya lisanga ya Katoliko ya Côte d’Ivoire na Roma mpe na Latium ezali na misala mingi ya molimo mpe ya bato.

Bakristu ya lingomba Frat'Ivoire, na tango ya Ukaristya
Bakristu ya lingomba Frat'Ivoire, na tango ya Ukaristya

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye

 

08 sánzá ya zómi na mɔ̌kɔ́ 2025, 08:50