Episkopo wa lokumu , Luis Antonio Tagle, pro-préfet ya dicastère mpo na bopalinginyi ya Nsango Elamu Episkopo wa lokumu , Luis Antonio Tagle, pro-préfet ya dicastère mpo na bopalinginyi ya Nsango Elamu 

Likita lya misio na mabele ya Azia, lisoló na ntina ya mikolo mizali koya ya mosala ya misio na Azia

Ekólo Malaisie ezali kolengele mikolo minei ya makita mpe ya kosolola na ntina ya makanisi mpe mikano miye mitaleli Eklezya na mabele ya Azia. Mobembo monene moye ya elikya ekobanda nà lisukúlu ya Luis Cardinal Antonio Tagle, mokambi ya departema ya mosala ya kopalinginia Nsango Elamu.

Albys KBD, CP – Kinshasa/RDC

 

Likita ya bamisionere ya Azia, oyo ezali na motó ya likambo «Mobembo monene mwa elikia», ekosalema o mokolo mwa 27 kino 30 Novémbé, na Penang, na ekólo Malaisie. Batindami koleka nkamà libwa (900), bautaki na mikili ndenge na ndenge, bakoyangana na likita lyango. Ebongisami na Biro  mpo na Evangelisation ya Fédération ya ba episkopo ya Azia mpe na Misala ya ba Pàpà ya Misio, likita lyango ezali moko ya masolo ya ntina mingi mpo na mikolo mizali koya ya mosala ya misionele na mabele ya Asie.

Liyangani ya misio

Baepiskopo ya lokumu zomi, baepiskopo koleka nkamà (100), basango nkàmà moko nà tuku mitano (150), bamamelo tuku sambo na mitano (75), mpe bandimi koleka nkamà moko (100) bakosangana na likita lyango. Bayangani bakotalela mokapo ya Nsango Elamu ya Santu Mateo : «  ... mpe bakendaki na banzela mosusu, (Mt 2, 12) ». Motó ya likambo oyo ekotambwisa mosala mpe ezali kosenga na lingomba ya Azia etalela nzela na yango moko.

Tata Basel Fernando, mokambi ya misala ya Pápa na Sri Lanka, alobi ‘te: «Tokotala nzela nini ekolanda mpo na mikolo mizali koya mpo na eklezya na Azia». Lisukulu ya kofungola ekosalema na episkopo ya lokumu Luis Antonio Tagle, Pro-préfet ya Dicastere mpo na Évangélisation. Akoyebisa bato banso ‘te bámikomisa bato ba sika, na lolenge ya bato bamobembo ya elikya. O mokolo moye mokolanda, Simon Poh, episkopo-mokonzi ya Eklezya Katoliko, akolobela likambo lya kotambola elongo ya bato ba Azia. Mosala ekosalema na elandeli mayele ya “masolo kati na elimo”, oyo emekamaki na ntango ya Sinode.

Makambo ndenge na ndenge

Likita lina ezali na ba séminaires mingi oyo ezali kolobela mikakatano mya sika ya kopalinginya Nsango Elamu: mosala ya ba médias numériques mpe ya mayele ya kosala makambo, eksperiansi ya «Alpha» mpo na bilenge, masolo na kati ya ba sociétés pluralistes, nzela ya kimya mpe ya boyokani, ekologie intégrale, lisungi ya «genie féminin» mpe kotonga Eklezia ya lisanga na mosala to na misio.

Misio na Asie, inculturation na etamboli ya banzeneneke banene ya boyambi
Misio na Asie, inculturation na etamboli ya banzeneneke banene ya boyambi   (AFP or licensors)

O mokolo mwa misato ya likita liye, Episkopo wa lokumu Pablo Virgilio David, mokambi ya lisanga ya baepiskopo ya Philippines, akopesa makanisi ma ye na ntina na maye matali « etamboli na bango kino na 2033», mbula ya milenele mibale ya lisiko (redemption).

Bisaleli ya Misio

«Makanisi malamu ya kopalingynya Nsango Elamu»  esangisi ba ateliers ya miziki, innovation numérique mpe kosalela série The Chosen. «Baponami», lokola esaleli ya misio. Masolo misusu oyo ekolobelama na likita lyango, ezali oyo etali kopesa bilenge formasyo, misio na esika ya mosala, lolenge eklezya ya Katoliko etalelaka basi mpe babali, mpe makambo ya sika oyo ezali kosalema na mokili mobimba mpo na losambo.

Nsima ya lisukulu ya Christopher Prowse, episkopo-mokonzi ya Australie, likita likosuka na likindo oyo ekopesa na bokuse makanisi mpe malako mpo na mosala ya misio ya Eklezya ya Azia. Engebene na makanisi ma bato baye bakozala na lisukulu lina, nzela yango esengeli kozala na ezalela ya boyoki, ya kozala na mayele ya pastorale mpe ya kozala na elimo ya «batamboli-nzela ya elikya».

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye

 

26 sánzá ya zómi na mɔ̌kɔ́ 2025, 11:00