O eleko ya bofungoli ndako-Nzambe Mar Toma, na Mossoul O eleko ya bofungoli ndako-Nzambe Mar Toma, na Mossoul 

Mibú mwambi simá ya Daech, ba ndáko-Nzámbe mibále ya Mossoul bifúngoli bikuke na yangó

Na nordi ya Irak, o ntei ya mboka ya kála ya Mossoul, bakambi politiki, bilama ya eklezia pe bandimi basanganaki po ya bofúngoli ba ndáko-Nzámbe ya lisoló, Mar Toma ya ba syriaque orthodoxe pe Al-Tahira ya ba chaldéen. Daech abébisaki pe abúkaki nionso mibále, pe babongisi miangó simá ya mibú misáto ya misála.

Jean-René Bompolonga - Kinshasa

O eleko ya bozui Mossoul na etuluku ya Letá ya islam na 2014, bato ya Daech basálaki na mboka ya mibále ya monene ya Irak, etóngamaki na bitikáli (ruine) ya Ninive ya kála, mboka mokónzi na bangó. Bisika misántu mizalaki ya bato loke ya Irak (bakristu, bayézidi pe basusu) mibébisamaki pe bandimi babenganaki bangó na makási. Tángo mboka ezui na súka bonsómi na 2017, simá ya bokangemi ya mobú mókó, ndambo ya bato bazongaki bakúti ba ndáko na bangó mibébisami pe bisika ya biyamba bikwéyi. 

"Elembo ya elikya" mókó 

Botóngi lisusu ezalaki nzelá mókó molayi pe pási, pe esili nanu te. Nzokándé, lobi, mokolo ya misáto ya sánzá ya zómi, eténi mókó ya ntina elekanaki na bofúngoli ba ndáko-Nzámbe mibále ya lisapo bibongisami lisusu o káti ya mboka ya kála ya Mossoul. "Ba ndáko-Nzámbe miye mizali misisa na bisó, lisoló na bisó", esakolaki epái ya bapanzi nsango motómóló Louis Raphaël Sako, motómóló ya ba chaldéen ya Bagdad.

Baipolitiki ya esika waná, basángó bakristu pe bandimi batóndaki na ndáko-Nzámbe syriaque orthodoxe ya Mar Toma, eye eúti na ekeke (siècle) ya sambo, pe ndáko-Nzámbe ya ba chaldéen ya Al-Tahira, eúti na ekeke ya zómi na mwambi. Ya yambo esálisaki lokóla boloko na Letá ya islam, eye ebébisaki makási lokóla ekuke ya Bantóma Zómi na mibále, ebongisamaki na mabángá ma mpémbé (marbre) ya esika ena pe etóngami na ekeke ya zómi na misáto.

Bozongisi sika

Ndáko-Nzámbe Mar Toma ebonzamaki lisusu o eleko ya molúlú mókó ya orthodoxe póso elekaki, kasi bobonzami lisusu ya Al-Tahira ebongisami mokolo ya minei. Bofúngoli ezalaki likambo mókó ya balaiki, bokolakisa bofúngwami ya sóló ya bizibeli ya ba ndáko-Nzámbe na bato ya Mossoul pe súka ya likambo ya bobongisi ebandaki na 2022.

Lisangá ya mokili mobimba po ya bobateli lisangó (patrimoine), ezua mosála ya bobateli pe ya bobongisi lisangó ya bokoko na mokili, esáli mosála mókó monene na mwángo yangó.

Matondi mingi ndéngé otángi lisoló eye

17 sánzá ya zómi 2025, 14:16