Luka

Bendele ya Amerika ezali kopepe na nse na ngambo ya weste ya Capitole na Washington, mokolo mwa investiture ya Donald Trump Bendele ya Amerika ezali kopepe na nse na ngambo ya weste ya Capitole na Washington, mokolo mwa investiture ya Donald Trump  (REUTERS)

Mgr Broglio: «Mbeba ya mbulamatari ezali kozwa baye bazangi makasi»

Mokambi ya lisanga ya baepiskopo ya Amerika asengi na lombango ‘te makambo mabe mazali koleka na Etats-Unis esila, mpamba te, ezali «kokweya na moto ya babola mpe bato bazangi makasi» na mboka. Alobi ete ezali «likambo ya sembo te mpe bakoki kondima yango te», mpe abakisi ‘te eklezya «ezalaki kosenga na bakonzi ya Leta ‘te básunga bato baye bazali na bosenga».

Albys KBD, CP – Kinshasa/RDC

 

Lokola Etats-Unis ekomi na poso mwa minei ya «shutdown», mbeba ya mobeko ya mosolo na Congrès oyo ezali kopekisa misala ya leta esalema, Episkopo-mokonzi Timothy P. Broglio, mokambi ya lisanga ya baepiskopo ya Eklezia ya Amerika, abimisaki maloba mpo na kosenga na bato bya mibeko mpe bakonzi ya Leta, ‘te basala na lolenge mibale mpo na kozwa mbongo mpo na misala ya ntina, mpe kosukisa kokanga misala ya Leta. Mgr Broglio alimboli ‘te, Programme ya lisungi ya bilei ya kobakisa (SNAP), oyo ya gouvernement mpo na kosunga mabota oyo bazali na bosenga, ezali nde yango, moko ya baye bazali na mpasi na bokangami. Kobanda mokolo mwa 1er novembe, lisungi ya bilei oyo SNAP ezali kopesa ekosila. Na États-Unis, moto moko kati na bato mwambe atyaka motema na yango.

Babola mpe bato oyo bazali na makoki te

“Baepiskopo ya Etats-Unis bazali na bobangi makasi, mpamba te bibongiseli ya ntina mingi oyo bizali mpo na bolamu bya bato banso, lokola SNAP, bikoki kokata lisungi n abato”. Yango ezali “likama monene” mpo na baye banso bazali na mposa ya bilei na nzela ya SNAP. Mokambi ya lisanga ya baepiskopo ya Katoliko na Etats-Unis alobi ‘te paralysie ena ezali kopesa mpasi mingi na babola mpe bato oyo bazali na makoki te” na ekólo. Alobi ‘te ezali “likambo ya sembo te mpe bakoki kondima yango te”, mpe abakisi ‘te baepiskopo ya Amerika “basengaki mibeko ya Leta mpo na kosunga batobaye bazali na bosenga”.

Baepiskopo  ya Etats-Unis bazali komitungisa mingi mpo na mobeko ya mosolo
Baepiskopo ya Etats-Unis bazali komitungisa mingi mpo na mobeko ya mosolo   (2025 Getty Images)

Lisalisi ya mangomba ya Katoliko

Mbala moko nsima ya bokangami ya mosolo ya mwa 1er Okotobe, bibongiseli mingi ya Katoliko basengaki na lombango eyano mpo na kopengola bopusi mabe na ba programmes oyo epesamaka na mbulamatari. Na ndakisa na yango, mokambi ya Catholic Charities USA, Kerry Alys Robinson, alobaki ‘te « makambo ya lingomba oyo ya sika ezali kokweyisa bato, ekoleka mosika na Washington».

O mokolo mwa 27 ya bokangami (Octobre 27), Sœur Mary Haddad, prezida mpe mokambi ya Catholic Health Association of the United States, oyo mosala na yango ezali ya kosalisa bato oyo bazali na mpasi, akebisaki ‘te bibongiseli ya ntina mingi ebimisi mikakatano makasi mpo na mabota mpe bato. Abeti nsete ‘te, Congrès esengeli kosala, «mpo na kozwa boyokani ya bipartisan oyo ekobatela bato baye bazali na likàmà, ekopesa makasi na libateli ya bato, mpe ekotombola makambo ya ntina mingi na makambo etali kolongono ya nzoto».

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.

 

30 sánzá ya zómi 2025, 11:06