Mbula to mibù tukù motoba (60 ans) ya Nostra Aetate: “Bokundoli boko elembo ya masolo”

Na libaku lya bokundoli mibutukù motoba (60 ans) ya Nostra Aetate, mokanda ya Concile oyo ezali kolendisa bondeko kati na mangomba, na batindami ya lingomba ya Bayuda, ya Islam, ya Hindu mpe ya mangomba ya bonkoko ya mabele ya Afrika, bakutanaki o mokolo mwa mibale, 28 ya sanza ya okotobe, na Salle Paul VI na Vatican. Kati na bango, mingi ba-Afrika, lokola sango Pierre Kabongo N’Kishi, oyo alobeli ntina ya masolo manà mpo ya boboto, na nzela ya ba medias ya Vatikan.

Albys KBD, CP – Kinshasa/RDC

 

Sango Pierre Kabongo N’Kishi azali sango ya Congo na diocèse ya Fiesole (Italie). Azwi diplome ya docteur na Théologie na specialisation na liturgie, azali doctorant na Missiologie mpe professeur na Université pontificale grégorienne esika ateyaka mpe asalaka bolukiluki na ye na dialogue interreligieux kati na Kristianisme, ba mangomba ya bonkoko ya mabele ya Afrika mpe Islam.

Masolo malamu kati na ezalela ya bonkoko ya Afrika mpe eyamba ya bokristu

Na lisoló na ye, alobaki ‘te Afrika ezali kosala mosala monene mpo na bokutani yaezalela ya bonkoko mpe bondimi, mpe atángaki na ndakisa milulu ya lingomba ya Roma mpo na ba diocèse ya Congo, elembo ya boyokani malamu kati na ezalela ya bonkoko ya Afrika mpe eyamba ya bokristu. Mbula ntuku motoba nsima ya kobima ya Nostra Aetate, andimi ete elimo ya makomi yango ezali naino na bomoi.

Kofungola mitema mya biso mpo na boboto (kimya)

Na mpokwa ya mokolo ya mibale na Salle Paul VI, Pàpa Léon ya zomi na minei ( XIV), na lisikulu na ye, abengaki bayangani ‘te “tósalisana mpo bato ba biso bálongwa na minyololo mpe na koyinana” mpe amonisaki ntina ya mokanda wana ya kala: kotonga ba gbagba kati na bandimi ya mokili mobimba.

Na likanisi liye, Abbé Kabongo alobi ‘te “mokili mobimba, ata mpe Afrika, ezali na mposa ya boboto (kimya). Ezali na nzela ya masolo kati na mangomba mpe bikolo nde tokoki kosala to kotonga boninga (bondeko) mpe kotambola elongo na nzela ya bomoto na bopeto”.

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.

 

30 sánzá ya zómi 2025, 08:08