Mgr Chami: Kobukana ya mabele na ekolo Soudan ezali likámá lya bato, likambo lya somo bakoki kokangela motema soki te
Albys KBD, CP – Kinshasa/RDC
Mgr Chami azali kolela, amitungisi mpe alobi ‘te : «Ezali mpasi monene mpe mawa makasi komona mboka mobimba ezipami na mabele», «likama lya bato, likama moko lya somo oyo moto akoki kokangela yango motema soki te». Likamà liye likómeli ekólo Soudan ekoki te kotika moto na bokeseni. Na yango, « mpo na kokabola mpasi makasi ya mabota maye mazali na mawa», kampanye ya losambo ebongisami na ba paloase nyonso ya dioseze oyo azali kokamba to oyo ezali na nsé ya bokonzi bwa ye.
Esengeli kosala nokinoki mpe na lombango - Miniti na miniti ezali na motuya
Mgr Chami asengi na bakonzi ba mboka, bàsàla makasi na kotiya “makoki masengeli mpo na kofongola ba nzela mpe komema lisungi”. Na nsima, alobi ‘te, esengeli kosàla na lombango ndako moko mpo na kotiya “bibongiseli ya kosunga, mpe mpo na koyamba mpe kosunga baye basengeli kozwa ‘lisalisi lya molimo oyo batangi ‘te Psycho-spirituel”. Ba “kotala soki moke te, lingomba to eyamba kani bazali”. Bongo akobi koloba ‘te: “esengeli kosala noki noki mpo ekoki kozala na bato oyo bazali nayino na bomoi mpe bazali na boséngà ya lisungi. Esengeli te kobosana ‘te Miniti na miniti ezali na motuya to ntina”.
Mbela ya kosambela na lombango mpo na ekolo Soudan
Lingomba ya katolike Greki Melkite ya Egypte esengi na bandimi to bakristu na kosambela na ntina ya baye bakufi (bawei); mpo ‘te bapema na kimya ya Mokonzi. Oyo ezali nde elembo ya bomoko to bondeko mpo na mabota maye mazwi likàmà, mpo na baye babungisami mpe mpo na bato oyo bazali na mawa makasi. Losambo linà ekosalisa mabota maye mazali na mpasi, mpo ‘te bakoka kozwa libondisi mpe elikya. Kasi ekosunga mpe baye babungi, soki bazali nayino na bomoi, lisungi eyeba kozwa bango. Losambo ezali mpe mpo na bato banso ba Soudan, oyo basili komekama na mpasi ya bomoto, mpo ‘te bakoka kozwa lisungi mpe lisalisi.
Mokumba ya lisànga.
Likambo liye likomeli ekolo Soudan, ezali te botungisami etali kaka mwa ndambo ya mabele to likambo ya mpamba mpamba, elobi Mgr Chami, kasi ezali komema mokumba ya komema na lisàngà, ezali ya bato banso, mingi mpenza, oyo etali bomoto mpe bizaleli bilamu. Lokola ezali nà bikolo “bizali na makoki ya kosunga, oyo wapi Soudan azali na yango te, esengeli ‘te moto na moto apesa to amema oyo ya ye mpo na kosunga mboka oyo ezali na matanga”, elobi Mgr Chami. Na nzela ya lisengi liye, abyangi bikolo binso na kosàngana, mpo na kopesa lisalisi na bato bana, ezala lisungi ya mwa ntango mokuse, to liye lya katikati to mpe lisungi liye lya tango molai.
Mgr Chami akanisi ‘te esengeli “kozala na boyokani mpe bosalisani bwa solo mpo na kosalisa bato” mpe “kosala kiboninga malamu”. Asengi na Union Africaine na “kotiya bokengeli malamu na banzela mpo lisungi likomela bato”, mpe asengi na bato ya mopelengano to ya politiki “bàbosana makambo ya politiki mpe ya basoda mpo na kokanisa na makambo ya bato”, mpamba te, “tozali biso banso biteni bya nzoto se moko”.
Na ntango to liboso lya mpasi, yoká
Na kozongela liteya lya Tata-Mosantu na misa ya bofungoli Chapitre général ya lingomba to Ordre ya Saint-Augustin oyo ezalaki kolobela mbela na koyoka, Mgr Chami apesaki toli ya koyoka na molende lokola ezaleli ya moboko liboso lya bato ba Soudan.
Na kati ya boyoki boye, esengeli koyeba ‘te, “ezali mpo na kosalisa bato oyo bazwi likama to bazali konyokwama mpo ‘te bákweya te na bozangi elikya”. Nzokande, bàzala na “elikya mpe bàlemba te mpamba te Nzambe azali o kati na mokili mpe asundolaka moto moko te”. Na yango, kati na molili makasi mpe molili ya mpasi to mawa, toyeba ‘te Kristo oyo azali kati na biso azali kongenga. Bongo na meko oyo tozali komitika biso moko, tozali kopesa nzela na Nzambe, mpo ‘te azwa esika ya liboso kati na bomoi bwa biso.
Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.