2022.06.23 Vetrate delle Chiese gotiche 2022.06.23 Vetrate delle Chiese gotiche  (Massimo Santi Photographer)

France : Baponi Mgr de Dinechin episkopo ya sika ya Luçon na Vendée

O mokolo moye mwa mibale 16 ya setembe, Pàpa Leon XIV aponi Mgr Renauld de Dinechin, episkopo wa sika mpo na Luçon. Azali na bambula tukù motoba na sambo (67 ans). Ut’o 2015, azalaki episkopo ya dioseze ya Soisson. Bongo Mgr François Jacolin akomi administrateur apostolique mpo na kokamba dioseze ya Luçon kino mokolo mokitani mwa yé akozwa ebonga ya ye. Misa ya bofungoli ekosalema o mokolo mwa lomingo 14 ya sanza ya zomi na mibale na ngonga ya misato na ndambo sima ya nzanga, na katedrale Luçon.

Albys KBD, CP – Kinshasa

 

Renauld de Dinechin abotamaki o mokolo mwa 25 ya sanza ya marsi na 1958 na engumba Lille, na France, mpe akulaki bonganga o mokolo mwa tukù mibale na mitano (25) ya sanza ya motoba ya mobu 1988 na episkopo - mokonzi ya Paris. Akomaki na Institut séculier Notre-Dame-de-Vie na 2002.

Mokonzi ya biteyelo mpe ya ba iniversité

Azwaki badiplome na makambo ya comptabilité-gestion mpe ya teoloji, mpe asalaki mosala ya ki omonié na bisika ndenge na ndenge. Na collège-lycée Paul-Valéry mpe na collège-lycée Saint-Michel de Picpus kobanda 1988 kino 1995. Na mibu misato miye ya nsuka, azalaki mokambi mosungi ya ba omonneries ya enseignement public ya dioseze ya Paris, na nsima akómaki délégué diocésain mpo na ba vocations ya kimamelo mpe ya bonganga-nzambe tee na 2002. Na nsima, Renauld de Dinechin akómaki sango na Sorbonne, mpe na nsima Jussieu, na mosala ya misionere na Saint-Germain-des-Prés. Ut’o 2003 kino 2004, azalaki membre ya équipe ya Fraternité missionnaire ya banganga-nzambe mpo na engumba ya (FMPV) na Kathédrale Saint-Maclou ya Pontoise oyo ezali na maboko mwa dioseze ya Pontoise.

Kobanda 2006 kino 2008, azalaki molakisi ya cergy mpe kobanda 2008 kino 2015, aponamaki episkopo mosungi ya Paris na Pape Benoît XVI. Yambo té azwa mokumba ya kokamba dioseze ya Soissons lokola Episkopo na 2015. Misa na ye ya bofungoli na dioseze ya Luçon na Vendée ekosalema mokolo mwa lomingo 14 ya sànzà ya décembe na ngonga ya 15h30 na kathédrale ya Luçon.

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.

17 sánzá ya libwa 2025, 13:08