Bansango ya Bikela to misàlà ya ngambo ya Moniele ya mokili (Orient – 10 setémbre 2025)
Mbotama ya Maria
Na mokolo mwa mwambe ya sànzà ya libwa, bakrstu bazalaki kosepela mbotama ya Ngondo Maria. Ezali bongo, moko kati na mbotama misato oyo eklezya ekundolaka, elongo na mbotama ya Yesu mpe ya moye mwa Yoane Mobatisi. Na moniele ya mokili, eyenga to feti eye, esalemaka elongo nà milulu ya losambo (Divine Liturgie), ba nzembo mpe bansambo na Maria oyo azali «esengo ya bikela binso». Baeklezya ekembisami na bafulele, bikeko bizali kokumisama na mpaka ya malasi mpe na miinda ya kandela. Na engumba ya Saydnaya, na ekólo Syrie, bato oyo bazali kokende na misa bazali komema bililingi mpe bazali koyemba banzembo mpo na kokumisa Mama wa Nzambe.
Eyenga ya Mère Teresa
O mokolo mwa mitano ya sanza ya libwa (5 septembre), Eklezya ya Katolike ezalaki kokundola to kosepela mama Teresa. Dati yango ezali mpe dati ya liwa na ye. Lingomba na ye, oyo ebéngami na nkombo ya ba Missionnaires de la Charité, ezalaki kosepela to kumisa Eyenga ya Mbótama ya yé na bomipima bilei mpe na mabondeli to bansambo. Na Alexandrie, na Egypte, ba mamelo basalaki feti elongo na ba ndeko oyo bafandaka pembeni na bango, oyo bazali na bobola makasi, mpe basanganaki na ntango ya bondeko mpe ya losambo mpo na kokanisa oyo amipesaki na bomoi na ye mpo na babola oyo bazali na mpasi ya koleka kati na babola.
Bokutani ti likita ya baepiskopo ya mikili ya Poto na mboka Vienne.
Na poso moye, mboka Vienne ekoyamba ba episkopo ya mikili ya pótó oyo bavandaka na mabele ya Asia, epai wapi bayaki mpo na likita na bango ya mbala ya tuku mibale na misato (23ème). Kati na bango, ezalaki mpe na episkopo wa lokùmu Claudio Gugerotti, mokambi ya Dicastère mpo ya baeklezya ya ngambo ya Moniele ya mokili (pour les Églises orientales), mpe Christoph Schönborn, episkopo ya Vienne, oyo azali lisusu na mokumba wana te. Baepiskopo bakosolola to bakolobela motó ya likambo to likanisi: “Bomoko kati na bokeseni”. Likita yango ezali na ntina mingi, mpamba te, ezali likita ya liboso oyo basalaki nsima ya boponomi lya Pápa Léon XIV.
Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.